FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

bisika
pluriel de "esíká"
esíká, pl. bisika (classe 7/8 : e- / bi-)
place, là où, endroit, emplacement

esika + subjonctif
au lieu de ...

esika te
pendant que ...
item 18 exemples (bandakisa zómi na mwámbe) ...
Nazui esika te.
Je n'ai pas de place.
makaku awelaki kupé, esika ya kotia mokila ezali te.
Le singe s'est battu pour le short, un endroit pour mettre la queue il n'y a pas.
bisika nioso
partout
Esika nkoyi azali, kotia ntaba te.
Là où il y a un léopard, ne met pas une chèvre
mokolo moko te. mbala moko te. eloko moko te. moto moko te. esika moko te.
Jamais (pas un jour). Jamais (pas une fois). Rien (pas une chose). Personne (pas un homme). Nulle part (pas un endroit).
Soki olingi kozwa engunduka, bisika ya kotika motuka ezali.
Si tu veux prendre le train, il y a des endroits pour laisser la voiture (parkings).
engunduka akoki komema motuka na yo tii na bisika ya bangomba ya milayi milayi ebengami Alpe.
Le train peut emmener ta voiture vers un endroit avec des très grandes montagnes appelé les Alpes.
basumbaka te esika batokaka mayi
on ne fait pas caca à l'endroit où on puise l'eau.
nzoto na ngai tempelo ya Nzambe, esika Molimo Mosantu akofanda
Mon corps est le temple de Dieu, l'endroit où le Saint Esprit va habiter.
esika oyo ezali salite mingi
Cet endroit est très sale.
ebongi obongisa esika oyo. bapaya bazali koya.
Il faut que tu arranges cet endroit. Les gens arrivent.
keba na esika wana okoki kokweya
attention! à cet endroit tu peux tomber.
esika ya kosuba eza awa te
Il n'y a pas d'endroit pour faire pipi ici.
kombola esika oyo. salite eza ebele.
Balai cet endroit. Il y a beaucoup de saleté.
yebisa ngai esika olalaki pe na nani.
Fais-moi savoir où tu as dormi et avec qui.
nayebi te esika nini moninga na ngai akendaki kolokota ye wana.
Je ne sais pas où mon ami a été ramasser celle-là
mwasi na ngai aboti likaku na esika ya mwana.
Ma femme a accouché d’un singe à la place d’un enfant.
nayebi esika ewuta te.
Je ne sais pas d’où ça provient.
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies