FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

bipai
plural of "epái"
epayi, pl. bipayi (class 7/8 : e- / bi-)
epái, pl. bipai (class 7/8 : e- / bi-)
place, location
side
epayi ya ... : at ..'s place
item 17 examples (bandakisa zómi na nsambo) ...
olingi nini epayi na ngai ?
What do you want from me ?
kanga bisaka, zonga epayi na yo !
close your bags, return to your place !
tokosenga epayi ya Nzambe abatela biso ti na suka ya sanza.
We will ask God that he may protect us till the end of the month.
kokota epayi na biso boye te
Don't enter at our place like that.
nazokende epayi ya munganga atala liso na ngai. nazomona malamu te.
I'm going to the doctor so that he looks at my eye. I don't see well.
kokoma na ndako te. leka mbala moko epayi ya tata na yo.
Don't arrive home. Pass at your dad's place for once.
tozali koya epayi na bino sikoyo
We arrive soon at your place.
kolala awa te. zonga epayi na yo.
Don't sleep here. Go home.
nazoyoka lino pasi ebongi nakende epayi ya munganga
I feel tooth pain. I have to go to the doctor.
okoya epayi na ngai mokolo nini ?
What day are you coming to my place ?
epayi na bino nde makelele ezalaka makasi.
There's much noise at your place.
nakofunda yo epayi ya maman.
I will denounce you to mum.
nalingaka kokende epai na ye te.
I don't like to go to her place.
kende kozua bisaka na yo oya kofanda epayi na ngai
Go take your things to come stay with me.
nakokende kofanda epayi na ye tango nakozala na Amerika.
I will go live with her when I'll be in America.
naza na posa ya koyoka atalaku oyo ayembaka epayi ya Koffi
I need to listen to the singer who sings (the dedications) with Koffi.
tozalaki awa epai na nga na Valentine na Rachel. Bakomaki lelo na nzanga.
We were here at my place with Valentine and Rachel. They had arrived today at noon.
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies