FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

lelo
leló
today
...
...
src : google images
lelo te, lobi te, un jour ?
lelo te, lobi te, un jour ?
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
Okokende wapi soki okufi lelo
Okokende wapi soki okufi lelo
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
internet, kala na lelo
internet, kala na lelo
© Vodacom DRC
lobi eleki, lelo, lobi !
lobi eleki, lelo, lobi !
© bbc.com
tags :
item 36 examples (bandakisa ntúkú mísáto na motóbá) ...
Lelo ezali mokolo ya suka. Lobi ezalaki mokolo ya liboso.
Today is the last day. Yesterday was the first day.
Natiki komela likaya banda lelo.
I abandon smoking from today on.
lelo mokolo nini ?
What day is it today ?
Lelo ya yo, lobi ya moninga. Proverb/expression (don't translate litteraly)
Today is for you, tomorrow for your neighbour.
Po na nini mibali ya lelo balingi lisusu te babotine ?
Why don't today's men want condoms anymore ?
biloko na ngai ? tii lelo !?
My things ? Till today !?
tozalaki awa epai na nga na Valentine na Rachel. Bakomaki lelo na nzanga.
We were here at my place with Valentine and Rachel. They had arrived today at noon.
buka lelo lamba lelo Proverb/expression (don't translate litteraly)
lit: harvest today, prepare today. (fig: seduce today, have sex today)
naza na posa ya komona yo lelo
I long to see you today
naza na makambo ebele ya kosala lelo
I have a lot of things to do today.
kopesa ngai kanda te lelo
don't get me upset today
boni lelo oye tongo boye ? likambo ?
How come you came so early ? Is there a problem ?
naza na esengo makasi pamba te nakobima na baninga na ngai na pokwa ya lelo
I'm very glad because I will go out with my friends tonight.
tata na yo azoya lelo kotala yo
Your father comes to see you today.
koya lelo te. naza na makambu ebele ya kosala
Don't come today. I have a lot of things to do.
mbula ekobeta lelo te. kobanga te.
It's not gonna rain today. Don't be afraid.
lelo ezali mokolo ya mbotama ya yesu
Today is the birthday of Jesus.
oza kolamba biloko nini lelo ?
What are you préparing today ?
kolata bilamba na ngai lelo te. lata ya yo.
Don't wear my clothes today. Wear yours.
lelo baza kopola biso toza kolonga
Today they are losing and we are winning.
lelo ezali mokolo ya mbotama ya koko na biso ya mwasi.
Today is the birthday of my grandmother.
na butu ya lelo naloti ndoto moko ya mabe
This night I had a bad dream.
na ndoto na ngai ya lelo ozalaki wana.
In my dream of today you where there.
kokende na ebale lelo te mbonge eza makasi
Don't go to the river today. The waves are strong.
bato misato bayaki koluka yo lelo
Three men came look for you today.
mateya ya lelo ezalaki kitoko penza.
The preaching of today was very nice.
Nganga-Nzambe ateyi biso bolimbisi lelo.
The pastor preached us pardon today.
naza na libonza pona eyenga ya lelo te
I don't have an offering for today's service.
liteya ya lelo ezalaki ndenge nini ?
How was the preaching of today ?
lelo moyi eza te. Tokobima ndenge nini ?
Today there's no sun. How are we going to go out.
Akoya lelo lisusu te. Akoya kaka lobi.
She will not come anymore today. She will just come tomorrow.
lelo naza penza na posa na yo te.
Today I really don't need you.
lelo, soki obeti ye, ngai nakoboma yo !
Today, if you beat her, me I will kill you !
lelo natatoli : " nalingi yo ". © Dena Mwana
Today I proclaim : " I love you ".
Akobima mbuma lisu lelo.
His eyes will pop out. (be surprised)
okokende wapi soki okufi lelo
Where will you go if you die today ?
item Article : dates
times/dates

The days of the week
1mondaymokolo ya liboso / mokolo ya yambo
2tuesdaymokolo ya mibale
3wednesdaymokolo ya misato
4thursdaymokolo ya minei
5fridaymokolo ya mitano
6saturdaymokolo ya póso / mokolo ya saba / mokolo wa kombo
7sundaymokolo ya eyenga / mokolo ya lomingo


The months
1januarisanza ya liboso / yambo
2februarisanza ya mibale
3marchsanza ya misato
4aprilsanza ya minei
5maisanza ya mitano
6junesanza ya motobayuni
7julysanza ya samboyuli
8augustsanza ya moambe
9septembersanza ya libwa
10octobersanza ya zomi
11novembersanza ya zomi na mókó
12decembersanza ya zomi na mibalé


jaar
year 2013 mobu mwa nkóto míbalé na zómi na mísáto

mobu ya 2013


Misc
daymokolo
weekmpóso
monthsanza
yearmobu/mbula/mpela
eveningmpokwa
nightbutu
noonnzanga
morningntongo
todaylelo
yesterdaylobi (eleki)
tomorrowlobi (ekoya)

In Congo, close to the equator, there are not 4, but 2 seasons.

The seasons
dry seasontángo ya elanga
rain seasontángo ya mbúla
other words with the tag 'time' : leló, lóbí, mbúla, mobú, mokolo, moyi, ngonga, mpókwa, sanza, tango, mói, mpóso, póso, ndéle, nzángá, pókwa, manáka, mvula, pokua, mukolo, mbúla, er, kombo, sánzá, yulí, yuní
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies