FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

lobi
lóbí
the adjacent day, yesterday, tomorrow (depends on the context, e.g. the verb in future or past tense
or in combination with eleki or ekoya)
the past, the future

lobilobi
the day before yesterday, the day after tomorrow
soon
batela lobi na yo !
batela lobi na yo !
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
lelo te, lobi te, un jour ?
lelo te, lobi te, un jour ?
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
lobi eleki, lelo, lobi !
lobi eleki, lelo, lobi !
© bbc.com
see also : ndéle
tags :
item 19 examples (bandakisa zómi na libwá) ...
Werra akobeta lobi
Werra plays tomorrow
Benga ngai lobi.
Call me tomorrow.
nakei kolala! Lobi okosala nini na pokwa ?
I'm going to sleep ! What will you do tomorrow evening ?
Lelo ezali mokolo ya suka. Lobi ezalaki mokolo ya liboso.
Today is the last day. Yesterday was the first day.
ozalaki wapi lobi na butu ?
Where were you last night ?
Lelo ya yo, lobi ya moninga. Proverb/expression (don't translate litteraly)
Today is for you, tomorrow for your neighbour.
bakolongola ngai lino lobi
They will remove my thooth tomorrow.
nakendaki feti lobi. batu bazalaki ebele.
I went to the party yesterday. There were a lot of people.
lobi nakobanda na tongo
Tomorrow I will start in the morning.
kobela te po lobi tokobina
Don't be sick because tomorrow we will dance.
nakobenga yo lobi na pokwa
I will call you tomorrow evening.
maman na ye, bakokunda ye lobi
His mother, they'll bury her tomorrow.
Lobi kelasi ezali te.
Tomorrow there's no school.
tozali awa tii lobi.
We are here untill tomorrow.
Akoya lelo lisusu te. Akoya kaka lobi.
She will not come anymore today. She will just come tomorrow.
Bolimbisi pona lobi. Tshombo esilaki moto
Sorry for yesterday. My phone ran out of charge.
mayele ezalaka pe kokanisa lobi ya bana.
It's also smart to think about the future of the children.
lobi toliaki bongo ya makako
Yesterday we ate monkey brain.
batela lobi na yo
take care of your future
other words with the tag 'time' : leló, lóbí, mbúla, mobú, mokolo, moyi, ngonga, mpókwa, sanza, tango, mói, mpóso, póso, ndéle, nzángá, pókwa, manáka, mvula, pokua, mukolo, mbúla, er, kombo, sánzá, yulí, yuní
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies