FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

lisusu
lisúsu
again
more

negative
lisusu te : not anymore
see also : mosusu, mosusu, mususu, mususu
item 20 examples (bandakisa ntúkú míbalé) ...
koyeba lisusu
to remember
Akozonga lisusu ? - Te, akei libela.
Will he come back again ? - No, he left forgood.
Akimaki lisusu, nakanisi azali na ntina.
He ran away again, I think he has a reason.
Po na nini mibali ya lelo balingi lisusu te babotine ?
Why don't today's men want condoms anymore ?
nalingi ye lisusu te. Nabimi na ye kaka boye.
I don't love her anymore. I went out with her just like that.
pakola lisusu mafuta
put on oil again
kotala ye te pamba te akosilika lisusu
Don't look at her, or else she's going to get angry again
tozali lisusu na mayi te, mwinda te. sikoyo tokosala ndenge nini
We have no more water, no light. How will we work now ?
tshombo na ngai ebebi lisusu
My phone is broken again.
lokolo na yo evimbi lisusu.
Your leg is swollen again.
nani azoluka ngai lisusu ?
Who's looking for me again ?
Limbisa ngai soki natungisi yo lisusu
Excuse-me if I bother you again.
mbula ezobeta lisusu.
It's raining again.
nalingi komona lisusu moto ya liboma oyo na ndako na ngai te.
I don't want to see that lunatik in my house again.
mama ya mobali na yo akoya lisusu te.
Your mother in law will not come anymore.
Kosenga ye te. Akoboya lisusu.
Don't ask her. She will refuse again.
Akoya lelo lisusu te. Akoya kaka lobi.
She will not come anymore today. She will just come tomorrow.
Bowuti wapi lisusu, basi.
Where are you coming from, girls ?
aye lisusu, mama wana ya liboma.
She came again, that crazy lady.
loba lisusu
Talk again. Say again.
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies