FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

kotala
kotala, form of a verb
kotála, regular construction (root : tal) (class 15 : ko- (verbs))
to watch, to see
to visit (to go/come see)

kotálisa
to show, to justify, to demonstrate

kotálela
to observe (for someone), to spy, to follow
bilenge, bozali na mikakatano ... yaka awa, tosolola.
bilenge, bozali na mikakatano ... yaka awa, tosolola.
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
tala sima, zonga moto
tala sima, zonga moto
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
derived words : talatála, motáli
see also : komóno, kokúta, komóna
item 33 examples (bandakisa ntúkú mísáto na mísáto) ...
batalana bandaku.
the houses are right across one another (the house are looking at each other)
etali yo
it looks at you (it's your problem)
tala boni bana Jacob azuaki mpe lolenge boni azuaki bango
see how many children Jacob got and also in what way he got them
tala, oyo ezali ndenge na biso
look, this is our method
Namiswaki lolemu kotala batambolaki bango mibale.
I bit my tongue to see them two walk.
tala ye.
Look at her. (look at him)
Soki omonaka nzoto ya yo kilo, tala ya baninga se bongo Proverb/expression (don't translate litteraly)
If you observe your body with respect, see your neighbour's one just so
Koko na yo, niama. Tala mutu lokola tintin.
Your granny, brute. Look at that head like Tintin. (insults)
sia tala mutu lokola mikate.
tsss, look at the head as a fritter !
obungi. ozalaki wapi ? - Awa, na ndaku. Nalalaki pe natalaki télé.
You disappeared. Where were you ? Here, at home. I was sleeping and watching television.
tala ye kuna minu mpembe koleka nzambala ya pape. nsuki elingamalingama © Koffi Olomide
look at her there, the teeth whiter than the dress of the pope. The hair disorderly (messy) curled.
alingi koyoka te. etali ye.
He doesn't want to listen. That's his problem.
Tala papa na ye, alangwi masanga, atamboli abilika
Look at his father, he got drunk from the beer, he doesn't walk straight (zigzag)
tala - mpe - lata
prêt-à-porter
totalaki lisano ya motopi na etando eke
we watched the football game on the television
nawuti kotala mama bokilo na lopitalo
I come from seeing mother in law at the hospital
nazokende mobembo pona kotala libota na nga
I go on a trip to see my family.
yaka po tokende kotala yaya na yo ya mwasi
Come so we go see your big sister
kotala ngai mingi te nazali mwasi ya batu
Don't look hard at me, I'm someone's woman
kotala ye te pamba te akosilika lisusu
Don't look at her, or else she's going to get angry again
nazokende epayi ya munganga atala liso na ngai. nazomona malamu te.
I'm going to the doctor so that he looks at my eye. I don't see well.
tata na yo azoya lelo kotala yo
Your father comes to see you today.
kotala ngai bongo te. okopesa ngai kanda.
Don't look at me like that. You will get me angry.
kobosana kotala biloko te soki ebeli.
Don't forget to look at the food, whether it's done.
naza na tukutuku. nazokende kotala mama na ngai.
I'm on the motorbike. I'm going to see my mum.
bapaya zomi baye kotala biso
10 visitors came to see us.
tala ngulupa ya batu ebele
look a group of many people
liyebo yaka kotala liyebo oyo.
Come see that mushroom.
alingaka kotala bilili na ye mingi.
She likes to look at her pictures a lot.
ata soki aza na mibali ebele, etali yo na nini ?
Even if she has a lot of men, how does that concern you ?
tala sima zonga moto
look back and become human again
tala ndenge mobali na ye aza kokosa.
Look how her man is lying.
Tala bamapalata na mutu na ye, eza pasi
Look at the infections on his head, it's sad.
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies