FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

ndenge
plural of "loléngé"
loléngé, pl. ndenge (class 11/10nd : lo-l- / n-l- / nd-)
method
way, manner
type
madofolo ata eza monene ndenge nini ekoki kokweyisa masoko te
madofolo ata eza monene ndenge nini ekoki kokweyisa masoko te
src : Oyebi que
item 26 examples (bandakisa ntúkú míbalé na motóbá) ...
ndenge nini ?
How are you ? How ?
tala boni bana Jacob azuaki mpe lolenge boni azuaki bango
see how many children Jacob got and also in what way he got them
lolenge moto akoki kokaba to kozua VIH
the way someone can transmit or catch HIV.
biloko na ndenge na ndenge
all sorts of things
alakisaki babina ndenge nini
He taught them how to dance.
ndenge moko
in the same manner, the same way
tala, oyo ezali ndenge na biso
look, this is our method
ndenge ya komibatela : na capote. Nzela ya malamu koleka mpo na komibatela ezali kosalela capote
the way to protect oneself : with a condom. The best method to protect oneself is to use a condom.
tolobi ndenge moko
We spoke the same way. (we said the same thing)
Oyo ezali nsango ya kosunga yo pona koyeba ndenge nini kelasi ya monoko ya Lifalanse etambolaka.
This is an information to help you to know in which manner the lesson of the french language functions.
Na motema nayebaki ete ezali mabe, kasi namonaki ndenge mosusu ya kosala te.
In the heart I knew it was bad, but I saw no other way of acting.
Bazali kobatela mino malamu te, mosusu esila ngala mpe mosusu balambi yango na ndenge elongobani te.
They don't conserve the medicines well, others are expired and others they prepare with non conform methods.
tokutana ndenge nini naza na hotel Ibis
How would we find each other ? I'm at hotel Ibis.
Ndenge nini tokoki komikebisa na ngenge ya SIDA ?
How can we protect ourselves from the AIDS virus ?
tozali lisusu na mayi te, mwinda te. sikoyo tokosala ndenge nini
We have no more water, no light. How will we work now ?
lolenge boni ebongi bayebisa yo pona otika komela kisi oyo
How should they let you know to stop taking that medicin ?
lolenge boni nakoki koloba na mobali oyo pona atika nga kimia
How can I talk to that man so that he'd leave me in peace ?
liteya ya lelo ezalaki ndenge nini ?
How was the preaching of today ?
lelo moyi eza te. Tokobima ndenge nini ?
Today there's no sun. How are we going to go out.
alataka ndenge alingi.
She dresses like she wants.
soki napesi yo mbongo wana, ngai, nakolia ndenge nini ?
If I give you that money, me, how will I eat ?
ndenge nini bosalaki pona boyiba mbongo na ngai ?
How did you do it to steal my money ?
Ndenge naza awa, nazokufa na nzala.
Like I'm here now, I'm dying from starvation.
Ndenge nini osali pona kokota awa ?
How did you do it to enter here ?
tala ndenge mobali na ye aza kokosa.
Look how her man is lying.
Madofolo ata eza monene ndenge nini, ekoki kokweyisa masoko te. source: facebook - oyebi que
However big the holes, it can't make the buttocks fall.
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies