FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

kasi
kasi
but ...
yet ...
tozali kosambela kasi bolingo eza te
tozali kosambela kasi bolingo eza te
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
item 14 examples (bandakisa zómi na mínei) ...
nayebi tata oyo, kasi nayebi tata wana te.
I know what this dad, but I do not know what dad then.
Mbula enokelaka ndaku ya moninga omoni yango moke, kasi mokolo ekonokela yo ekomi matata. Proverb/expression (don't translate litteraly)
When the rain fell on the house of your friend, you found it insignificant, but the day it fell on you it became a problem.
nalukiluki, kasi nakuti te
I search everywhere, but I can't find (it)
Djo ayebaki ete kosopa zemi ezali lisumu monene, kasi makango na ye azwaki zemi, mpe Djo azalaki na likoki te ya kobala mpe kobokola mwana.
Djo knew that having an abortion is a great sin, but his fiancée got pregnant and Djo did not have the means to get married and raise a child.
Na motema nayebaki ete ezali mabe, kasi namonaki ndenge mosusu ya kosala te.
In the heart I knew it was bad, but I saw no other way of acting.
elongi kitoko kasi moyibi monene
pretty face but a big thief
Monoko ya mobange, elumbaka solo, kasi elobaka makambo ya lokuta te. soki okimi solo wana, okoyeba makambo te. Proverb/expression (don't translate litteraly)
The mouth of the elderly, it smells foul, but doesn't tell lies. If you avoid this smell, you will not know the affairs.
yo sapologue oza na abakosi versace, kasi miliki ezangi na ndaku
You, the "sapologist", you have a vest of Versace, but milk is missing at home
makayabu na fumbwa ! ezangi kaka loso kasi naza na nzala !
makayabu and fumbwa ! Only rice is missing, but I'm hungry !
Benteke abeti bale, kasi ekoti te
Benteke kicked the ball, but it didn't go in
monoko ya mokolo elumbaka solo, kasi elobaka maloba ya solo Proverb/expression (don't translate litteraly)
The mouth of the elderly smells bad, but the words are true.
ngomba na ngomba ekutanaka te kasi batu na batu bakutanaka Proverb/expression (don't translate litteraly)
Mountains don't run into each other, but humans run into each other
nazolinga kobima kasi mvula ezobeta makasi.
I want to go out but it's raining hard.
Nazoluka nabosana, kasi nazokoka te.
I'm trying to forget but I can't.
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies