FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

wana
wana, form of a verb
kowâ, irregular form ! (racine : we) (class 15 : ko- (verbs))
to die, to decease
derived words : mowa, mowela, bowéí, liwá, mowei
see also : kokufa
wana
there
this / that (there)
see also : óyo
item 42 examples (bandakisa ntúkú mínei na míbalé) ...
nayebi tata oyo, kasi nayebi tata wana te.
I know what this dad, but I do not know what dad then.
Nini etungisaki yo mokolo wana ?
What was bothering you that day ?
ntango wana, tolyaka kaka madesu na mayi
at that time (in those days), we only ate beans with water.
Wana ezali ya solo, kosakana te.
This is true, don't joke.
tshombo wana ezali ya kala mingi.
That phone is from way back.
yango wana
thats why ...
nani wana ?
Who's there ?
wana ozoyembela ngai, mamiwata ?
Are you singing for me over there, mermaid ?
bomoni momie wana ? azokosa biso. nakotchoukouté !
You (pl.) see that chick there ? She's lying to us. I will tchoukoutate her !
baboti na yo bayaki kobwaka ngunda na poto. yango wana sikoyo oza awa na biso.
Your parents came ask asylum in europe. Reason why now you're here with us.
bantaba mibale wana ! moko ntaba ya pembe, mosusu ntaba ya moyindo
There are two goats there. One goat wite, another goat black
bizaleli nini yango wana ?
what is that, that behaviour ?
wana awuti wapi ?
Where did that one there come from ?
kokoko ! - Nani wana ? - Nga Lauretta. - Ah, yo wana ? - Ee.
knock knock ! - Who's there ? - It's me, Lauretta. - Ah, it's you ? - Yes.
Monoko ya mobange, elumbaka solo, kasi elobaka makambo ya lokuta te. soki okimi solo wana, okoyeba makambo te. Proverb/expression (don't translate litteraly)
The mouth of the elderly, it smells foul, but doesn't tell lies. If you avoid this smell, you will not know the affairs.
yango wana...
that's why...
maman wana alataki maputa ya konzuluka
That woman there wore a worn out loin cloth.
naye po tosolola likambo wana
I came so that we discuss that problem
wana eza biloko ya papa na bino.
That there is the food of your father.
wana mwana na ngai ya mwasi
The one there is my daughter.
koya na moninga na yo wana te. nalingaka ye te.
Don't come with that friend of yours. I don't like him.
keba na esika wana okoki kokweya
Watch out! at this spot you may fall.
ebongi penza kokeba na batu wana.
One must really watch out for those people.
aza kokeba na mwasi wana makasi.
He pays much attention to that girl there.
na ndoto na ngai ya lelo ozalaki wana.
In my dream of today you where there.
lia biloko wana nioso. kobuaka eloko te.
Eat all that food. Don't throw anything away.
pesa mbwa na ngai mikuwa wana. alia.
Give those bones to my dog. That he eats.
ebongi ozala mosika na mwasi wana
You should stay far away from that woman.
Mosala wana ya kindumba ezali malamu te na miso ya Nzambe.
The work of prostitution is not good in the eyes of God.
okoya kotela makasi pamba, tika kopakola mafuta wana
You risk to get very clear for nothing, stop applying that cream.
Akeyi wapi kiliya na ngai wana ?
Where did he go, my client there ?
babomba bilei wana malamu.
They better hide that food well.
bandela nzembo wana.
Repeat that song there.
Oyo wana azokoma kizengi penza.
That one becomes crazy, really.
soki napesi yo mbongo wana, ngai, nakolia ndenge nini ?
If I give you that money, me, how will I eat ?
Soki tosangisi mbongo wana nyonso, tokoki kosomba lopango
If we put together all that money, we can buy a plot.
nayebi te esika nini moninga na ngai akendaki kolokota ye wana.
I don't know where my friend went to pick that one up.
moninga na ye wana ya mundele apesaka ngai kanda.
Her white friend there makes me angry.
nalingaka mwasi wana makasi.
I like that girl very much.
yebisa bana wana batinda mbongo.
Let those children there know they should send money.
aye lisusu, mama wana ya liboma.
She came again, that crazy lady.
Nakozwa yo na prince wana
I will pick you up on that road.
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies