FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

moninga
móníngá, pl. baninga (class 1/2 : mo- (mu-) / ba- (persons))
friend, comrade
sepela na kozua ya moninga, motema mabe efutaka te
sepela na kozua ya moninga, motema mabe efutaka te
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
sepela na kozua ya moninga
sepela na kozua ya moninga
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
see also : molingami
item 20 examples (bandakisa ntúkú míbalé) ...
Mbula enokelaka ndaku ya moninga omoni yango moke, kasi mokolo ekonokela yo ekomi matata. Proverb/expression (don't translate litteraly)
When the rain fell on the house of your friend, you found it insignificant, but the day it fell on you it became a problem.
Pesa losako na baninga na yo.
Greet your friends.
Lelo ya yo, lobi ya moninga. Proverb/expression (don't translate litteraly)
Today is for you, tomorrow for your neighbour.
Soki omonaka nzoto ya yo kilo, tala ya baninga se bongo Proverb/expression (don't translate litteraly)
If you observe your body with respect, see your neighbour's one just so
soki moninga abali, sepela
When a friend gets married, rejoice
ezali te po tomelaka na nganda moko, nde tokomi baninga
It's not because we use to drink at the same café, that we became friends
bayebaka moninga malamu na tango ya pasi.
One knows a good friend in bad times.
moninga na nga aza na bokono
My friend is sick
naza na esengo makasi pamba te nakobima na baninga na ngai na pokwa ya lelo
I'm very glad because I will go out with my friends tonight.
koya na moninga na yo wana te. nalingaka ye te.
Don't come with that friend of yours. I don't like him.
mama ya moninga na ngai moko akufi
The mother of one of my friends died.
baninga na ngai nioso bazali na motuka. etikali kaka ngai
All my friends have a car. Only I remain.
yesu nde moninga malamu.
It's Jesus the good friend.
baninga na ye babwaki ye na libulu moko
His friends threw him in a pit.
Aza moninga na ngai ya bomuana.
He is my childhood friend.
nayebi te esika nini moninga na ngai akendaki kolokota ye wana.
I don't know where my friend went to pick that one up.
moninga na ye wana ya mundele apesaka ngai kanda.
Her white friend there makes me angry.
aza moninga na ngai te.
She's not my friend.
moninga ya mosala
work colleague
Liboso kolongola bipoti na lisu ya moninga longola nanu oyo eza na lisu na yo
Before removing the crusts from the eyes of a friend, remove already those that are in your eyes.
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies