FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

mosala
mosálá, pl. misala (class 3/4 : mo- (mu-) / mi- : objects)
musala, pl. misala (class 3/4 : mo- (mu-) / mi- : objects)Kinshasa version
work, occupation

bolingo, mibeko, misala
bolingo, mibeko, misala
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
bolingo, mibeko, misala
bolingo, mibeko, misala
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
tozoluka muana musala
tozoluka muana musala
src : google images
bosembo - boboto - mosala
bosembo - boboto - mosala
src : google images
tozali koluka batu ya musala
tozali koluka batu ya musala
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
zanga musala oyeba mabe ya muasi
zanga musala oyeba mabe ya muasi
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
item 19 examples (bandakisa zómi na libwá) ...
luka mosala
look for work
mwana mosala
maid, servant
akei nanu na zando, (na) sima akokende mosala.
he goes already to the market, afterwards he will go to work.
akei liboso na zando, (na) sima akokende mosala.
firstly he goes to the market, afterwards he will go to work.
Mosala na zolo ezali koyoka solo na kopema.
The work of the nose is to smell odors and to breathe.
mokolo ya bopemi. mokolo ya mosala.
day off (holiday). workday.
bosembo - boboto - mosala
justice - peace - work (national motto of the DRC)
Namoni ozangi eloko ya kosala. Luka ata mosala ko ! kaka koyungana boye...
I see that you lack something to do. Look even for a job, come on ! just wandering like that...
kaka ngai nde nazosala misala nioso ya ndako
There's only me who does the all the chores of the house .
oza koluka mosala nini, mama ?
What job a are you looking for, mama ?
leki na yo oyo ya mwasi alingaka musala te.
Your little sister doesn't like the work.
nakodefa mbongo na musala
I will borrow money at work.
Mosala wana ya kindumba ezali malamu te na miso ya Nzambe.
The work of prostitution is not good in the eyes of God.
ezali pamba te naza na mosala te
It's because I have no work.
Tango naza kosala mosala nalingaka moto atungisa ngai te.
When I'm working, I don't like someone disturbing me.
koba mosala !
continue the work !
moninga ya mosala
work colleague
tozali koluka muana musala. Azala moyibi te, ndoki te, ndumba te.
We are looking for a domestic aid. May it not be a thief, not a sorcerer, not a whore.
Ngonga nini okokende na musala. ngonga ya zomi na mwambe.
What time will you go yo work ? 6 (18) o'clock.
item Article : work
mosala / occupation
nasalaka te I don't work / unemployed
mosala ya maboko manuel labour / labourer
mosala ya leta / kalaka public servant / office work
moto ya mombongo business man/woman
mokambi na compagnie corporate management
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies