FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

mibale
míbalé
two (2)
mibale
mibale
© pvh
tags :
item 18 examples (bandakisa zómi na mwámbe) ...
bozalaki mibale, wapi mosusu ?
you were two, where is the other ?
tuku mibale na motoba
two tenfolds and six : twenty-six (26)
bilembo mibale
two points
eyenga eleki nayaki na liyangani ya mibale
last sunday I came to the second cult.
Bolingo na biso mibale ekosila te.
The love between us two will not end.
Namiswaki lolemu kotala batambolaki bango mibale.
I bit my tongue to see them two walk.
lopango na bango ekabwání na biténi mibale.
Their terrain is divided in two parts.
bantaba mibale wana ! moko ntaba ya pembe, mosusu ntaba ya moyindo
There are two goats there. One goat wite, another goat black
naza na bana misato: mwasi moko na mibali mibale
I have three children: One girl and two boys
nalobaka minoko mibale
I speak two languages
bino mibale bolingani mingi
You two love each other much.
asombi tukutuku mususu. akomi na yango mibale.
She bought another scooter. She has two of them now.
oza na bana mwambe na bakoko mibale.
You have 8 children and 2 grandchildren.
nazokende na Kinshasa pona sanza mibale
I'm going to Kinshasa for two months.
Soki bato mibale bayokani te ebongi bakabwana.
If two persons don't get along, they should separate.
banda mikolo mibale azolia te.
Since two days she's not eating.
ngai nalingaka kobota bana mibale kaka
Me, I want to give birth to just two children.
Yezu azalaka na baapostolu zomi na mibale
Jesus had twelve (12) apostels.
item Article : Counting and numbers
P.S. you can just enter any number on this site and it will be translated into lingala

0
zero (0)libungutulu, eloko te (nothing)

1-10
1mókó
2míbalé
3mísáto
4mínei
5mítáno
6motóbá
7nsambo
8mwámbe
9libwá
10zómi

powers of 10
10zómi
100nkámá (mókó)
1000nkóto (mókó)
10000monkoko (mókó)
20000minkoko míbalé
100000elundu (mókó)
1000000efuku (mókó)

for milion, you'll also hear : efuku, makiasi, epuna

11-99
11zómi na mókó
15zómi na mítáno
20ntúkú míbalé
21ntúkú míbalé na mókó
32ntúkú mísáto na míbalé
43ntúkú mínei na mísáto
54ntúkú mítáno na mínei
67ntúkú motóbá na nsambo
78ntúkú nsambo na mwámbe
89ntúkú mwámbe na libwá
95ntúkú libwá na mítáno

100-1.000
100nkámá (mókó)
101nkámá (mókó) na mókó
110nkámá (mókó) na zómi
115nkámá (mókó) na zómi na mítáno
120nkámá (mókó) na ntúkú míbalé
126nkámá (mókó) na ntúkú míbalé na motóbá
157nkámá (mókó) na ntúkú mítáno na nsambo
200nkámá míbalé
201nkámá míbalé na mókó
210nkámá míbalé na zómi
222nkámá míbalé na ntúkú míbalé na míbalé
500nkámá mítáno
753nkámá nsambo na ntúkú mítáno na mísáto

1.000-10.000
1000nkóto (mókó)
1234nkóto (mókó) na nkámá míbalé na ntúkú mísáto na mínei
9875nkóto libwá na nkámá mwámbe na ntúkú nsambo na mítáno

other examples
9libwá
39ntúkú mísáto na libwá
539nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
7539nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
47539minkoko mínei na nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
847539bilundu mwámbe na minkoko mínei na nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
6847539bifuku motóbá na bilundu mwámbe na minkoko mínei na nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá

other words with the tag 'count' : efúku, elóko, elúndu, nkámá, libosó, libwá, míbalé, mínéi, mísáto, mítáno, mwambi, mokó, motoba, ndámbu, nkóto, sambo, tuku, zómi, kotánga, misátu, ndámbo, moambe, mwambe, mineyi, epúná, makiasi, nsambo, kámá, libúngútulú, kóto, libua, miliale, milioni, mokama, yambo, monkoko
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies