FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

kopesa
kopesa, form of a verb
kopésa, regular construction (root : pes) (class 15 : ko- (verbs))
to give
to assign, to furnish

komipésa
to give oneself, to devote oneself
see also : kokaba
item 45 examples (bandakisa ntúkú mínei na mítáno) ...
pesa ngai bakombo na bango
give me their names
pesa ngai lipwepwe.
Give me a kiss
nzete ya mbila epesaka nsamba, mafuta mbila na mpose.
The palmtree provides palmwine, palmoil and the mpose.
Soki okokoma kuna, pesa bango mbote.
When you arrive there, greet them (give them greetings).
Pesa loboko na bango nyonso.
Give them all a hand.
Pesa losako na baninga na yo.
Greet your friends.
Apesaki ngai mpasi na motema.
She gave me pain in my heart.
pesa mbote na libota na yo
Greet your family
Napesi Nzambe matondi mpo na yo
I thank God for you.
pesa ye mbote / pesa bango mbote
greet him / greet them
tshombo oyo opesi ngai ezosala te
The phone that you gave me doesn't work.
nzambe apesa yo makasi.
May God give you the force.
Ozopesa nga kanda
You're making me angry.
pesa ngai esume napangusa nzoto.
Give me a towel that I wipe the body.
mbote, boni nzoto ? nga naza malamu. nalingaki kaka napesa yo mbote
Hello, how's the body (the health) ? I'm doing well. I just wanted to greet you.
naboyi biloko nionso ekopesa litomba te
I refuse everything that will not give a benefit
nzambe apesa biso bonsomi ya kopona
May God give us the freedom of choice
soki namati likolo ya ngomba epesaka nga kizunguzungu.
If I climb on the mountain, it gives me vertigo (dizziness).
pesa ngai emekele ya bolayi nameka bolayi ya lopango na ngai
give me a tool to measure lengths so that I measure the dimensions of my lot
pesa ngai bolangiti nafinika. nayoki malili.
Give me a blanket so that I can cover myself. I feel cold.
opesi ngai biloko ya kolia mingi
You gave me a lot of things to eat
kopesa ye mbongo mingi te, aza nanu mwana muke
Don't give him much money, it's still a little child
kopesa ngai kanda te lelo
don't get me upset today
koleka liboso na ngai te, ezopesa ngai kanda
Don't pass in front of me, it angers me
naza na mbongo ya kopesa yo te
I don't have money to give you
mbongo oyo natikalaki na yango napesi yango yaya na yo
I have given the money that was left (the money that I staid with) to your sister.
oye, opesi biso ata mbote te. likambo nini ?
You came, you didn't even salute us. What's the matter ?
kopesa mutu mbote ezali ofele
To greet someone is free.
kotala ngai bongo te. okopesa ngai kanda.
Don't look at me like that. You will get me angry.
nazozela opesa ngai eyano na motuna na ngai.
I'm waiting that you give me the answer to my question.
nasepeli na eyano opesi ngai te.
I didn't like the answer you gave me.
pesa ngai falanga nasomba bilamba
Give me money so that I buy clothes.
pesa mbwa na ngai mikuwa wana. alia.
Give those bones to my dog. That he eats.
bawuti kopesa ngai nsango moko ya mabe
They just gave me some bad news.
bangungi oyo bakoki kopesa yo bokono
Those mosquitoes can give you a disease.
aza kaka mwana muke. Kopesa ye bazoka te.
He's only a small child. Don't give him chewing gum.
kopesa mwana na ngai bokono te.
Don't give a disease to my child.
soki napesi yo mbongo wana, ngai, nakolia ndenge nini ?
If I give you that money, me, how will I eat ?
mama, mela bakisi na yo oyo munganga apesi.
Mum, take your medicine that the doctor prescribed you.
moninga na ye wana ya mundele apesaka ngai kanda.
Her white friend there makes me angry.
nakoki kopesa mbongo na ngai na ndumba te.
I cannot give my money to a prostitute.
bapesi ngai eloko ya kolia te.
They haven't given me anything to eat.
tango akitaka, akitaka na nkembo, abongolaka nioso, apesaka makasi, asekwisaka nioso. © Moïse Mbiye - Tango na Ye
When He descends, He descends in glory, He changes everything, He gives power, He resurrects everything.
Nalembi koliya bazoka oyo po epesi nga mbanga pasi
I'm tired of eating this chewing gum, cause it makes my jaw hurt.
pesa ngai alimeti napelisa likaya.
Give me a match so I can light the cigarette.
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies