FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

boso
libosó
bosó (classe 14 : noms abstraits - pas de pluriel)
devant, avant

ya liboso
en premier, le premier
nalingi nazala mosani wa molongo ya liboso
nalingi nazala mosani wa molongo ya liboso
© pvh
voir aussi : súka, nsúka, nánu
tags :
item 21 exemples (bandakisa ntúkú míbalé na mókó) ...
akei liboso na zando, (na) sima akokende mosala.
Il part au marché premièrement, après il partira au travail
eteni ya liboso
premier chapitre
Libala: na liboso nde sukali, na kati ngaingai, na suka bololo.
Le mariage: au début c'est doux, au milieu c'est acide, à la fin c'est amer.
Zoba liboso, mayele na sima.Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
idiot avant, sage après
Lelo ezali mokolo ya suka. Lobi ezalaki mokolo ya liboso.
Aujourd'hui est le dernier jour. Hier était le premier jour.
Azalaki moseka liboso tosibaki.
Elle était vierge avant que nous avions fait l'amour.
Namonaki ndunda yango mbala ya liboso.
Je voyais ce légume pour la première fois.
ndaku ya monene, ndaku ya moke, ndaku ya suka, ndaku ya liboso
une grande maison, une petite maison, la dernière maison, la première maison
lokasa ya liboso
la première page
na liboso aza nani ?
devant, c'est qui ?
kokenda liboso ezali kokoma te Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
Partir le premier n'est pas "arriver"
koleka liboso na ngai te, ezopesa ngai kanda
Ne passe pas devant moi, ça m'énerve
mbala ya liboso oyaki awa ozalaki koyoka soni
La dernière fois que tu étais ici tu avais honte.
yoka nanu motuna na ngai liboso ya koyanola ngai
écoute déjà ma question avant de me répondre.
libanga moko ya monene ezalaki liboso ya motuka na ngai
Il y avait une grande pierre devant ma voiture.
Nawuti komona bambila mwambe liboso ya ndako.
Je viens de voir 8 policiers devant la maison.
Tika kobeta mukinza liboso na ngai
Arrete de péter devant moi
Mwana na yo ya liboso, osundola ye.
Ton premier enfant, tu l'as abandonné.
liboso ya libala nazalaki malamu na ye.
Avant le mariage j’étais bien avec elle.
Nabengaki liboso ya koya.
J’avais appelé avant de venir.
Liboso kolongola bipoti na lisu ya moninga longola nanu oyo eza na lisu na yo
Avant d'enlever les crottes des yeux de d'un ami, enlève déjà ceux qui sont dans tes yeux.
item Article : Compter et chiffres
P.S. vous pouvez introduire un numero dans ce site, et il vous le traduira en lingala

0
zero (0)libungutulu, eloko te (rien)

1-10
1mókó
2míbalé
3mísáto
4mínei
5mítáno
6motóbá
7nsambo
8mwámbe
9libwá
10zómi

puissance de 10
10zómi
100nkámá (mókó)
1000nkóto (mókó)
10000monkoko (mókó)
20000minkoko míbalé
100000elundu (mókó)
1000000efuku (mókó)

pour million on dit aussi : efuku, makiasi, epuna

11-99
11zómi na mókó
15zómi na mítáno
20ntúkú míbalé
21ntúkú míbalé na mókó
32ntúkú mísáto na míbalé
43ntúkú mínei na mísáto
54ntúkú mítáno na mínei
67ntúkú motóbá na nsambo
78ntúkú nsambo na mwámbe
89ntúkú mwámbe na libwá
95ntúkú libwá na mítáno

100-1.000
100nkámá (mókó)
101nkámá (mókó) na mókó
110nkámá (mókó) na zómi
115nkámá (mókó) na zómi na mítáno
120nkámá (mókó) na ntúkú míbalé
126nkámá (mókó) na ntúkú míbalé na motóbá
157nkámá (mókó) na ntúkú mítáno na nsambo
200nkámá míbalé
201nkámá míbalé na mókó
210nkámá míbalé na zómi
222nkámá míbalé na ntúkú míbalé na míbalé
500nkámá mítáno
753nkámá nsambo na ntúkú mítáno na mísáto

1.000-10.000
1000nkóto (mókó)
1234nkóto (mókó) na nkámá míbalé na ntúkú mísáto na mínei
9875nkóto libwá na nkámá mwámbe na ntúkú nsambo na mítáno

autres examples
9libwá
39ntúkú mísáto na libwá
539nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
7539nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
47539minkoko mínei na nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
847539bilundu mwámbe na minkoko mínei na nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
6847539bifuku motóbá na bilundu mwámbe na minkoko mínei na nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá

autres mots avec le tag 'compter' : efúku, elóko, elúndu, nkámá, libosó, libwá, míbalé, mínéi, mísáto, mítáno, mwambi, mokó, motoba, ndámbu, nkóto, sambo, tuku, zómi, kotánga, misátu, ndámbo, moambe, mwambe, mineyi, epúná, makiasi, nsambo, kámá, libúngútulú, kóto, libua, miliale, milioni, mokama, yambo, monkoko
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies