FR EN NL

vertaling / woordenboek Lingala - Nederlands

congo rdc
Zin :

bandako
meervoud van "ndáko"
ndaku, mv. bandaku (klasse 1a/2 : - / ba-)Kinshasa versie
ndáko, mv. bandako (klasse 1a/2 : - / ba-)
huis
thuis
ndako
ndako
© La Vache Qui Rit
ndako ya ndele
ndako ya ndele
© junglespirit
ndako ya biso
ndako ya biso
© ndako ya biso
ndako ya bandeko Franciscains
ndako ya bandeko Franciscains
© missioni assisi
zie ook : ndákonzámbe
tags :
item 48 voorbeelden (bandakisa ntúkú mínei na mwámbe) ...
nafandaki na ndaku poso mobimba
Ik bleef de hele week thuis
Ndaku oyo ekomi kitoko.
Dat huis is mooi geworden.
batalana bandaku.
de huizen staan recht tegenover elkaar (de huizen bekijken elkaar)
nkolo ndaku.
verhuurder, eigenaar van het huis
nakeyi nango na ndaku.
Ik ga met dat naar huis.
monoko ya ndaku
de ingang (mond) van het huis
Mbula enokelaka ndaku ya moninga omoni yango moke, kasi mokolo ekonokela yo ekomi matata. Gezegde/uitdrukking (niet letterlijk vertalen)
Wanneer de regen op het huis van uw vriend viel, vond je dat niet de moeite, maar de dag dat het op jouw viel is het een probleem geworden.
kombo ya mboka to kombo ya ndaku ?
De naam (familienaam, stam, dorp) of de voornaam (hoe men je thuis noemt) ?
nazongi na ndaku.
Ik keer terug naar huis
Yaya na Joze azongi na ndaku.
De grote zus van Joze is thuisgekomen.
ndaku ya monene, ndaku ya moke, ndaku ya suka, ndaku ya liboso
een groot huis, een klein huis, het laatste huis, het eerste huis
mbula ememi biloko ya ndaku
De regen heeft de huisraad meegesleept
obungi. ozalaki wapi ? - Awa, na ndaku. Nalalaki pe natalaki télé.
Je bent verdwenen. Waar was je ? - Hier, thuis. Ik sliep en ik keek televisie.
ndaku oyo eleki ndaku kuna na kitoko
Dit huis is mooier dan dat huis daar.
ndaku ya nzoi
bijenkorf
yo sapologue oza na abakosi versace, kasi miliki ezangi na ndaku
Jij, de "sapoloog", jij hebt een vest van Versace, maar melk ontbreekt er thuis
ndako ya bokono
hospitaal
ndako ya likwangola / ndako ya bampaka
rusthuis
ndako ya Nzambe
huis van God, tempel
etape ya nzete ya mangolo ebukani mpe ekweyi likolo ya ndako
De tak van de mangoboom brak af en viel op het huis
boyokani eza na ndako oyo te
Er is geen overeenstemming in dit huis
mokolo ndako aleki awa
De eigenaar van het huis is hier voorbijgekomen
tokoki kozala na kimia te na ndako oyo
Men kan niet op zijn gemak zijn in dit huis.
kokota na ndako sikoyo te. nazobongisa.
Kom het huis nog niet binnen. Ik ben nog aan het opruimen.
kokanga ngai na ndako te. nazobanga.
Sluit me niet op in het huis. Ik ben bang.
kokoma na ndako te. leka mbala moko epayi ya tata na yo.
Kom nog niet thuis. Ga eens bij je vader langs.
kaka ngai nde nazosala misala nioso ya ndako
Het is enkel ik die al de huisklusjes doet.
oyo eza ndako na bino, eza ya biso te
Dat is jullie huis, niet het ons.
batu balinga nde kosuana na ndako oyo
De mensen kibbelen echt graag in dit huis.
nakoki koya kofanda na ndako na yo ?
Mag ik in uw huis komen wonen ?
na ndako oyo mokonzi azali te. biso nioso tozali bana.
In dat huis is er geen chef. We zijn allemaal kinderen.
papa nde azalaka mokonzi ya ndako
Het is vader die de baas is in huis.
boma moto okoya kotumba ndako pamba
Doof het vuur. Je riskeert het huis plat te branden.
nakokengela ndaku malamu
Ik zal het huis goed bewaken
mopepe ezali na ndako oyo te
Er is geen lucht in dit huis.
na ndako na bango batie langi ya pembe
In hun huis hebben ze witte verf gezet.
Nawuti komona bambila mwambe liboso ya ndako.
Ik kom net van 8 agenten te zien voor het huis.
Bongisa ndako. Eza salite makasi.
Ruim het huis op. Het is erg vuil.
nzimbu eza te na ndako na ngai
Er is geen geld in mijn huis.
nalingi komona lisusu moto ya liboma oyo na ndako na ngai te.
Ik wil die gek niet meer in mijn huis zien.
Bolimbisi papa, kobengana mama na ndako te.
Alstublief papa, jaag mama het huis niet uit.
akokota na kati ya ndako oyo te.
Ze zal dit huis niet binnen treden.
oyo eza ndako na yo moko
dat is je eigen huis
Natambolaki longwa na motuka tii na ndako.
Ik liep (weg) van de auto naar het huis.
Ndako na ye ezali musika mingi.
Zijn huis is heel ver.
ndako ya ndele
strooien hut (paillotte)
tofandi na ndako moko.
We wonen in hetzelfde huis.
bima na ndako na ngai !
Ga uit mijn huis !
andere woorden met de tag 'huis' : mbalasáni, biló, ebáeli, ebutele, ebuteli, efelo, engangala, fúlu, kinkóso, lángi, libóko, lininísa, ndaku, palais, súku, tólo, motóndo, fungóla, efungwelo, ebutelo, kukù, etumbelo, armwár, maluvé, esosele, ngwende, kikóso, linyuka, sabúni, nzongo, zongó, kabiné, wésé, ekuke, mitondo, biró, sabóni
e-mail : dic@lingala.be
 

interessante filmpjes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privéleven & cookies