FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

munoko
monoko, pl. minoko (classe 3/4 : mo- (mu-) / mi- : objets)
munoko, pl. minoko (classe 3/4 : mo- (mu-) / mi- : objets)version Kinshasa
bouche, geule, bec, mufle, museau
entrée, ouverture
langue, dialecte
tags :
item 16 exemples (bandakisa zómi na motóbá) ...
Kanga monoko ! kanga mbanga na yo !
Ferme la bouche. ferme ta geule ! (impoli)
monoko ya ndaku
l'entrée (la bouche) de la maison
minoko ya zolo
les entrées du nez (les narines)
monoko mbeli, makolo ndunda.Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
La bouche comme un couteau, les jambes comme un légume.
monoko ya Didine
la bouche de Didine
Oyo ezali nsango ya kosunga yo pona koyeba ndenge nini kelasi ya monoko ya Lifalanse etambolaka.
ceci est une information pour t'aider à connaître de quelle façon le cours de la langue française fonctionne.
kolumba monoko solo eza maladi to te ?
Puer du bec est une maladie ou pas ?
Monoko ya mobange, elumbaka solo, kasi elobaka makambo ya lokuta te. soki okimi solo wana, okoyeba makambo te. Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
La bouche du vieillard, elle sent mauvais, mais ne dit pas de mensonges. Si tu fuis cette odeur, tu ne vas pas connaitre les affaires.
mpema ya monoko
haleine
soki oyebi te kanga munoko
si tu ne le sais pas, tais-toi
monoko ya mokolo elumbaka solo, kasi elobaka maloba ya solo Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
La bouche d'un vieux sent mauvais, mais les paroles sont vraies.
nalobaka minoko mibale
Je parle deux langues
monoko na yo nde ekoboma yo mokolo mosusu
C'est ta bouche qui va te tuer un de ces jours.
ozalaka monoko makasi boye pona nini ?
Pourquoi tu as la grande bouche comme ça ?
kanga monoko na yo pamba te okoya komela nzinzi.
Ferme ta bouche sinon tu risques d’affaler une mouche.
Ebongi okanga monoko na yo.
Tu dois fermer ta bouche.
autres mots avec le tag 'corps' : bongó, bontólo, ebángá, lobebú, ebekú, ebelo, ebóbó, eboló, edádá, elongi, enama, esóngó, kíngó, libéle, liboló, libolongo, libumu, lifuni, likata, lokolo, lino, linzáka, lipeka, lisisa, liso, lisókó, litáma, litoyi, lokéto, lolemo, loposo, makilá, mandéfu, lisásámbá, lobebo, mbunzu, moyoyo, mofáti, mokongo, mongóngó, mopanzí, mosapi, motéma, mupende, monoko, mutolo, motó, nkúki, tólo, nzóto, poso, pótá, nsima, losúki, zólo, litói, lomposo, lobôko, lisu, kunza, kovo, lolému, súki, engóngólo, monzômbâ, nkíngó, ntólo, mompúlúlú, likundú, motolú, mosopó, libale, mosómba, likáká, etindi, mopende, búnya, lolemu, mbángá, mingayi, motshopo, zémi, etambe, libandi, likosi, linu, lopiko, libundi, lokíkí, manduta, muika, mopiko, nkunki, sóka, soyi, lolemo, lokéto, mpótá, lotó, monsisá, mutema, libondi, goró, lotókó, mpanzí, litolú, motoló, ndéfu, mimbebo, mokunza, mposo, lokíkí, nsóka, monpúlúlú, ebebú, liliká, mataku, mosai, libinzi
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies