FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

kasi
kasi
mais ...
pourtant ...
tozali kosambela kasi bolingo eza te
tozali kosambela kasi bolingo eza te
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
item 14 exemples (bandakisa zómi na mínei) ...
nayebi tata oyo, kasi nayebi tata wana te.
Je connais ce papa-ci, mais je ne connais pas ce papa-là.
Mbula enokelaka ndaku ya moninga omoni yango moke, kasi mokolo ekonokela yo ekomi matata. Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
Quand il pleuvait sur la maison de ton ami, tu trouvais ça insignifiant, mais le jour que c'est tombé sur toi c'est devenu un problème.
nalukiluki, kasi nakuti te
je cherche partout, mais je ne trouve pas
Djo ayebaki ete kosopa zemi ezali lisumu monene, kasi makango na ye azwaki zemi, mpe Djo azalaki na likoki te ya kobala mpe kobokola mwana.
Djo savait qu'avorter est un grand pêcher, mais sa fiancée était tombée enceinte et Djo n'avait pas le moyen de se marier et d'élever un enfant.
Na motema nayebaki ete ezali mabe, kasi namonaki ndenge mosusu ya kosala te.
Dans le coeur je savais que c'était mauvais, mais je ne voyais pas d'autre façon d'agir.
elongi kitoko kasi moyibi monene
joli visage mais une grande voleuse
Monoko ya mobange, elumbaka solo, kasi elobaka makambo ya lokuta te. soki okimi solo wana, okoyeba makambo te. Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
La bouche du vieillard, elle sent mauvais, mais ne dit pas de mensonges. Si tu fuis cette odeur, tu ne vas pas connaitre les affaires.
yo sapologue oza na abakosi versace, kasi miliki ezangi na ndaku
Toi, le "sapologue", tu as un abacost Versace, mais le lait ça manque à la maison
makayabu na fumbwa ! ezangi kaka loso kasi naza na nzala !
makayabu et fumbwa ! Il manque seulement le riz, mais j'ai faim !
Benteke abeti bale, kasi ekoti te
Benteke shotté le balon, mais ce n'est pas entré
monoko ya mokolo elumbaka solo, kasi elobaka maloba ya solo Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
La bouche d'un vieux sent mauvais, mais les paroles sont vraies.
ngomba na ngomba ekutanaka te kasi batu na batu bakutanaka Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
Les montagnes ne se croisent pas, mes les humains se croisent
nazolinga kobima kasi mvula ezobeta makasi.
J’ai envie de sortir mais il pleut fort.
Nazoluka nabosana, kasi nazokoka te.
J'essaie d'oublier, mais je n'y arrive pas.
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies