FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

lokola
lokola
as, like
item 21 examples (bandakisa ntúkú míbalé na mókó) ...
abetami lokola nioka.
He was beaten like a snake.
Bazali lokola mai na moto.
They are as water and fire.
oza na miso lokola moto ameli lotoko.
You have the eyes like someone who drunk lotoko.
Balabala ekomi lokola ebale
The road became like a river
Ozali kitoko lokola moyi ya ntongo.
You are beautiful like the sun in the morning.
Bolingo ezalaka lokola lisano.
Love is like a game.
loposo na ye ezali mpetompeto lokola ngolo.
her skin is smooth as a catfish.
Koko na yo, niama. Tala mutu lokola tintin.
Your granny, brute. Look at that head like Tintin. (insults)
sia tala mutu lokola mikate.
tsss, look at the head as a fritter !
ah Nzambe ! pona nini masta na ngai aza zoba lokola makaku ?
ah God ! why is my friend stupid like an ape ?
miso lokola tomson
eyes like a mackerel.
Tia foin nakoma lokola yo
let's bet I'll be like you
moyibi akufi lokola mbwa likolo ya tshombo
a thief died like a dog because of a mobile phone
asombi liputa moko lokola ya ngai
She bought the same cloth as me
pona nini ozokende lokola moyibi boye
Why do you leave as a thieve like that ?
mwana na ngai, nabatelaka ye lokola liki.
My child, I protect him like an egg.
Nakobeta yo lokola mwana na ngai.
I will beat you like my child.
nakokata suki na ngai lokola ye
I will cut my hair like her
Aza kotafuna bazoka lokola ngombe.
She chews her chewing gum like a cow.
ye asekaka ye moko lokola kizengi.
She laughs all alone like a fool.
Alati lokola bambila penza
He really dresses like a policeman.
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies