FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

kozua
kozua, forme d'un verbe
kozua, construction régulière (racine : zu) (classe 15 : ko- (verbes))
kozwa, construction régulière (racine : zw) (classe 15 : ko- (verbes))
ne pas confondre avec kosua

gagner, obtenir, prendre, recevoir, réussir, attraper
Nazui diplôme
Nazui diplôme
src : Twitter Africell Congo RDC
ekozua bino temps !
ekozua bino temps !
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
ata ezui mayi ekopela kaka
ata ezui mayi ekopela kaka
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
sepela na kozua ya moninga, motema mabe efutaka te
sepela na kozua ya moninga, motema mabe efutaka te
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
diamant na bible, okozua nini
diamant na bible, okozua nini
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
sepela na kozua ya moninga
sepela na kozua ya moninga
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
ekozua bango temps
ekozua bango temps
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
kozua ya moto, etangama na likolo
kozua ya moto, etangama na likolo
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
dérivés : bozui, bozwi, azwakaté, azuakate
item 27 exemples (bandakisa ntúkú míbalé na nsambo) ...
Azui mikanda.
Il a obtenu ses papiers.
Nazui esika te.
Je n'ai pas de place.
tala boni bana Jacob azuaki mpe lolenge boni azuaki bango
voici combien d'enfants Jacob a eu et aussi de quelle manière il les a eu
lolenge moto akoki kokaba to kozua VIH
la manière que quelqu'un peut transmettre ou attrapper le VIH.
manguele mpe kisi ezali te po na kobatela moto azua VIH to bokono ya SIDA te.
Il n'y a pas de vaccin, ni de médicament pour protéger quelqu'un d'attraper le VIH ou la maladie du SIDA.
bazui singa po babenda mutuka
Ils ont pris la corde pour tirer la voiture.
soki nalongoli bilamba okozua vertige na okokweya
Si j'enlève les vêtements, tu vas attraper le vertige et tu vas tomber.
Soki olingi kozwa engunduka, bisika ya kotika motuka ezali.
Si tu veux prendre le train, il y a des endroits pour laisser la voiture (parkings).
mwana azui zemi ya papa
l'enfant est tombé enceinte d'un papa
yo okozwa mbata okomona !
Toi, tu vas attraper une gifle, tu vas voir !
papa, zwa bisaka na yo, kende malembe
Monsieur, prends tes affaires, pars calmement
tofandi na se ya nzete. tozozua mopepe
On est assis sous l'arbre. On se détend.
bozui bakiti ya noko na ngai
Vous avez pris les chaises de mon oncle.
ebongi obima na mwana na yo po azua mopepe
Il faut que tu sortes avec ton enfant pour qu'il prenne de l'air.
zua nga foto ya kitoko.
Prends moi une belle photo.
kende kozua bisaka na yo oya kofanda epayi na ngai
Va chercher tes affaires que tu viennes habiter chez moi.
Ozui mokano ya kolelisa ngai.
Tu as pris la décision de me faire pleurer.
Nakozwa yo na prince wana
Je vais te prendre sur cette route là.
tozwi likama na nzela.
Nous avons eu un accident sur la route.
tozwi lipanda
Nous avons obtenu l'indépendance
azwakate azwi
le looser a eu (expression: Celui qui n'a jamais a une fois eu quelque chose et il le montre / quelqu'un qui vit au dessus de ses moyens)
kozua ya moto etangama na likolo
la réussite d'un homme est écrite dans le ciel
Tokendeki kozwa bitekuteku na kati ya zamba.
Nous etions allés cueillir du bitekuteku à l'intérieur de la forêt.
Nabimaki kozwa mopepe.
J'étais sorti prendre de l'air
Djo ayebaki ete kosopa zemi ezali lisumu monene, kasi makango na ye azwaki zemi, mpe Djo azalaki na likoki te ya kobala mpe kobokola mwana.
Djo savait qu'avorter est un grand pêcher, mais sa fiancée était tombée enceinte et Djo n'avait pas le moyen de se marier et d'élever un enfant.
po na kozwa bis okoki kosomba tiké po na mokolo moko, sanza moko to mbula mobimba.
Pour prendre le bus, tu peux acheter un billet pour un jour, un mois ou toute une année.
kende kozwa biloko na yo kuna
Va chercher ta nourriture là-bas.
libanga
libángá, pl. mabanga (classe 5/6 : li- / ma-)
caillou, pierre
pile électrique
tableau scolaire
boulot


contexte : Chansons Congolaises
dédicace (on cite le nom des gens dans la chanson, au plupart du temps parce qu'ils ont payé pour ça)


contexte : unité de mesure
unité de mesure misérablement petite

ça fait en général 100fc d'arachides ou de sel

le nom vient probablement de l'expression kobeta libanga (casser la pierre)
ou kozua libanga (ramasser la pierre). Des petits jobs misérables, juste pour
avoir au moins quelque chose.
libanga ya mungua
libanga ya mungua
© pvh (Nadiyha)
tags :
item 6 exemples (bandakisa motóbá) ...
libanga ya talo
pierre précieuse, minerai, (diamant,...)
Babwakaki mabanga.
Ils ont jeté des pierres.
mutu ya liboma abambi ngai libanga
Le fou m'a lancé une pierre.
libanga moko ya monene ezalaki liboso ya motuka na ngai
Il y avait une grande pierre devant ma voiture.
mosombi monene ya mabanga
grand diamantaire
zebi ya mabanga
géologie (science des roches)
autres mots avec le tag 'unités de mesure' : ekoló, emekeli, libángá, sakombi, kópo, vére, ebundeli, emekele
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies