FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

ozobima
ozobima, forme d'un verbe
kobima, construction régulière (racine : bim) (classe 15 : ko- (verbes))
sortir, aparaître

kobimisa
faire sortir
dérivés : bobimisi
item 28 exemples (bandakisa ntúkú míbalé na mwámbe) ...
tata mosusu abimi libanda.
un autre homme est sorti dehors.
obimisi ngai mai ya miso.
Tu m'as fait sortir des larmes. Tu m'as fait pleurer.
olingi kobima na ngai ?
Veux-tu sorir avec moi ?
benda mpema, bimisa mpema. Benda mpema mulai.
inspire, expire. Prend un grand souffle.
Nabimaki kozwa mopepe.
J'étais sorti prendre de l'air
Azali ? - Te. Abimi.
Il est là ? - Non. Il est sorti.
Tobimisaki disque mbula eleki.
Nous avons sorti un disque l'année passée.
soki okobima sikoyo te, er moko nakoleka na palais.
Si tu ne vas pas sortir maintenant, je vais passer à la maison dans une heure.
bima na ndako na ngai !
Sors de ma maison !
nalingi ye lisusu te. Nabimi na ye kaka boye.
Je ne l'aime plus. Je suis sorti avec elle seulement comme ça.
ozobima mingi mikolo oyo
Tu sors beaucoup ces jours-ci
ngai mpe nalingi nabima na pokwa
moi aussi je veux sortir ce soir
naza na esengo makasi pamba te nakobima na baninga na ngai na pokwa ya lelo
Je suis dans la grande joie car je vais sortir avec mes copines ce soir.
kobima nanu te. naza nanu na posa na yo.
Ne sors pas encore. J'ai encore besoin de toi.
sala noki, ngai nazobima sikoyo.
Fais vite, je suis en train de sortir maintenant.
sokola basani noki pona tobima
Lave vite les assiettes pour qu'on sort.
ebongi obima na mwana na yo po azua mopepe
Il faut que tu sortes avec ton enfant pour qu'il prenne de l'air.
kobosana kokanga ekuke te soki obimi
N'oublie pas de fermer la porte si tu sors.
fungola ekuke pona banzinzi babima
Ouvre la porte afin que les mouches sortent.
nazolinga kobima kasi mvula ezobeta makasi.
J’ai envie de sortir mais il pleut fort.
bafoto yango ebimi kitoko te.
Ces photos là ne sont pas sorties très belles.
Nayoki ke okomi kobima na ex na ngai. Mama, ozali semba bilokota.
J'ai entendu que tu t'es mis à sortir avec mon ex. Madame, tu es un semba bilokota.
lelo moyi eza te. Tokobima ndenge nini ?
Aujourd’hui il n’y a pas de soleil. On va sortir comment ?
nalobi moto akobima awa te.
Je dis que personne ne va sortir ici.
bimisa mutuka na lopango.
Fais sortir la voiture de la parcelle.
kobosana te, soki omeki kobimisa sekele oyo tokobeta yo !
N’oublie pas, si tu essayes de sortir ce secret on va te frapper !
Mobali nabala akeyi kosala ekobo. Abimi na ndeko nga.
L'homme que j'ai épousé est parti faire l'adultère. Il est sorti avec ma soeur.
Akobima mbuma lisu lelo.
Il va sortir les yeux. (être surpris)
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies