FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

mingimingi
doubling of the last part to express a disorder...
did you mean mingi ?
mingi
mingi
much, more, many, abundant
large amount
very

too (much)

in lingala there's no nuance between much / many et too much / too many
item 49 examples (bandakisa ntúkú mínei na libwá) ...
Bana mingi babangaka nkosi.
Many children are afraid of a lion.
Bato mingi.
Many people.
nalingi yo mingi.
I love you a lot.
na bosengi ya bato mingi,...
at the request of many people, ...
matondi mingi / melesi mingi. - likambo te.
thanks a lot. - No problem.
Biloko nyonso ekomi ntalo mingi.
All things became expensive.
Natindeli bino nyonso mbote mingi.
I send you all much greetings.
biloko olambaki ezali elengi mingi
The things you've prepared are very delicious.
Biloko na yo ezali kilo mingi.
Your luggage weighs a lot.
Ndako na ye ezali musika mingi.
His home is very far.
bangungi eswaki ngai mingi.
The mosquitoes have bitten me a lot.
Nayokaki nsoni mingi.
I was very ashamed.
Ezali ntalo mingi. Kakola moke.
That's very expensive. Negotiate a bit.
tshombo wana ezali ya kala mingi.
That phone is from way back.
Nzambe azali malamu mingi
God is very good.
Nzambe apambola bino mingi. Kimia ezala na bino. Nzambe abatela bino.
My God bless you in abundance. Peace be with you. May God protect you.
komela mingi, kolangwa muke
To drink a lot, to get a bit drunk
ngai naza na biro ya Gecamines. Nakozonga kala mingi te
Me, I'm at the office of Gecamines. I'll return soon.
Na mboka swisi, kotambola na engunduka ezali kosalema mingi
In the country Switzerland, traveling by train is much (often) done
pona kokola malamu ebongi komela mayi mingi
To grow well, it is good to drink a lot of water
ozobima mingi mikolo oyo
You go out a lot these days
opesi ngai biloko ya kolia mingi
You gave me a lot of things to eat
mwasi oyo alingaka koloba mingi te
That woman doesn't like to talk much.
kopesa ye mbongo mingi te, aza nanu mwana muke
Don't give him much money, it's still a little child
kotala ngai mingi te nazali mwasi ya batu
Don't look hard at me, I'm someone's woman
komela masanga ya sukali mingi te. eza malamu te po na mino.
Don't drink much sweet drinks. It's not good for your teeth.
kolia mingi te. tozokende lisano. okolia kuna
Don't each much. We are going to the party. You will eat there.
munganga alobi ebongi omela mayi mingi.
The doctor said, it's good to drink a lot of water.
koloba mingi te. nazoya sikoyo.
Don't talk much. I'm coming now.
Nzambe azali malamu mingi pona ngai
God is very good for me.
nalingaka masanga oyo te eza sukali mingi
I don't like that drink. It's too sweet.
esika oyo ezali salite mingi
This place is very dirty.
kozanga baboti ezali pasi mingi
Not having parents is very difficult.
banda oza na zemi oza kolala mingi
Since you are pregnant you sleep much.
kolia biloko ya sukali mingi te eza malamu te pona mino
Don't eat too much sweet things. It's not good for your teeth.
bino mibale bolingani mingi
You two love each other much.
ye alingaka mingi kolia mikate
He loves to eat fritters very much.
aza kokosola mingi.
He coughs a lot.
libota na ngai ezali motuya mingi pona ngai
My family is very important for me.
mwana na yo ya mobali aza kosuba na mbetu mingi
Your son pees in bed a lot.
oza kokosa baboti na yo mingi. ezali malamu te.
You lie a lot to your parents. That's not good.
mobeko oyo ezali pasi mingi pona kotosa
That law is very hard to respect.
Miliki ezali malamu mingi pona mikuwa.
Milk is very good for the bones.
losako mingi pona lisalisi oyo.
Many thanks for that help.
alobaka mingi mpe abombaka sekele te
She talks much and she never keeps a secret.
alingaka kotala bilili na ye mingi.
She likes to look at her pictures a lot.
Mwana na bino alingi kotanga mingi
Your child wants to study much.
papa ya baluba balingaka koliya mingimingi bitoto.
Baluba men love eating bitoto very much.
Olivia alingaka mabina mingi.
Olivia loves dancing.
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies