FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

abetaka
abetaka, forme d'un verbe
kobéta, construction régulière (racine : bet) (classe 15 : ko- (verbes))version moderne
kobéte, construction régulière (racine : bet) (classe 15 : ko- (verbes))
vient de l'anglais "to beat"

frapper, taper
jouer (sur un instrument de musique, ballon, foot, basket,...)
pleuvoir
dérivés : ebételi, ebétele, mobeti
tags :
item 37 exemples (bandakisa ntúkú mísáto na nsambo) ...
nabetaka bale. / kobeta ndembo.
je joue du foot. (je tape le balon (habitude)) / Jouer au balon.
Pamela abetaka guitar
Pamela joue du guitar
tobetaka basket
nous jouons basket
beta, bakofungola
frappe, on ouvrira
kobeta masolo
discuter
nakobeta yo !
je vais te frapper !
Werra akobeta lobi
Werra joue demain
Nkolo azali kobeta na porte.
Le Seigneur est en train de frapper à la porte.
Motema na ngai ezali kobeta po na yo
Mon coeur bat pour toi
Mbula ebeti. Mbula ezobeta.
Il pleut. Il est en train de pleuvoir.
abetami lokola nioka.
il a été tabassé comme un serpent.
kobeta mayi
se baigner, prendre un bain
Nabetaki maboko makasi mpona bango.
J'ai applaudi fort pour eux.
kosopa mai / kosopa mpowa / kobeta mai
éjaculer
kosakana te na ngai to nakobeta yo
Ne blaguez pas avec moi ou je vais te taper.
kobeta miziki
Jouer de la musique
Benteke abeti bale, kasi ekoti te
Benteke shotté le balon, mais ce n'est pas entré
kobeta lisolo
raconter (une histoire)
leki na nga ya mobali alingaka kobeta ndembo
Mon petit frère aime jouer au foot
kobeta mwasi na yo boye te. ezali mabe
Ne frappe pas ta femme comme ça. C'est mauvais
kobeta bana te. lobela bango malembe
Ne frappe pas les enfants. Parle les calmement.
mbula ekobeta lelo te. kobanga te.
Il ne va pas pleuvoir aujourd'hui. N'ai pas peur.
mikolo oyo mbula ezobeta makasi.
Ces jours-ci, il pleut fort.
tofandi na biso libanda. tozobeta masolo.
Nous sommes assis entre nous dehors. On est en train de causer.
leki na nga ya mobali abetaka na ekipe ya congo
Mon petit frère joue dans l'équipe du Congo.
nazolinga kobima kasi mvula ezobeta makasi.
J’ai envie de sortir mais il pleut fort.
nakobeta yo tii nakobuka yo mbanga.
Je vais te frapper jusqu’à ce que je te casse la mâchoire.
Tika kobeta mukinza liboso na ngai
Arrete de péter devant moi
mbula ezobeta lisusu.
La pluie tombe encore.
Okoki kobeta ye te. Azali mwana mwasi
Tu ne peux pas la frapper. C’est une fille.
Nakobeta yo lokola mwana na ngai.
Je vais te frapper comme mon enfant.
Abeti ngai pamba te abungisi mbongo na ye.
Elle m’a frappé parce qu’elle a perdu son argent
lelo, soki obeti ye, ngai nakoboma yo !
Aujourd’hui, si tu la frappes, moi je vais te tuer !
kobosana te, soki omeki kobimisa sekele oyo tokobeta yo !
N’oublie pas, si tu essayes de sortir ce secret on va te frapper !
Obetaki mukinza tango olalaki
Tu avais pété lorsque tu dormais.
beta libaku
tente ta chance
kobeta libaku na zelo
rencontrer une super méga chance
autres mots avec le tag 'emprunt: anglais' : boyi, búku, bói, míliki, mótuka, pikási, kobéta, bulangeti, mutuka, kobéte, búku
autres mots avec le tag 'verbes en [ko...e]' : kokende, kobeleme, kofole, kokipe, komele, kosambwe, kosambue, kokesene, kobéle, koseke, kolénge, komesene, kotéleme, kotéke, komeme, kobéte, kolangwe
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies