FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

kokufa
kokufa, forme d'un verbe
kokufa, construction régulière (racine : kuf) (classe 15 : ko- (verbes))
mourir, tomber en panne
Okokende wapi soki okufi lelo
Okokende wapi soki okufi lelo
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
mwasi akufi 6 mois après alamuki
mwasi akufi 6 mois après alamuki
src : Kin Makambo
voir aussi : kowâ
dérivés : kufa
item 17 exemples (bandakisa zómi na nsambo) ...
Basusu kokufa, basusu kobotama, mokili ezalaka boye.
Des gens meurent et d'autres sont nés, le monde est comme ça.
Akufaki mpo na koningana ya mabele.
Il est mort à cause d'un tremblement de terre.
Soki oyo ezali ya solo, nakufa.
Si ça c'est vrai, je meurs.
mpepo ekweyi na wenze ya Simba Zigida. Epanzi wenze. Bato nyoso bakufi.
Un avion est tombé sur le marché Simba Zigida. Il a détruit le marché. Tout le monde est mort.
tata na ye akufaki liwa ya mbalakaka.
son père était décédé d'une mort brusque
Mokonzi, soki ozalaki awa, mbele ndeko na ngai akufaki . © Yoane 11:21
Seigneur, si tu aurais été ici, alors mon frère ne serait pas mort.
kokufa nzala
Mourir de faim
nakokufa pona yo
Je vais mourir pour toi
moyibi akufi lokola mbwa likolo ya tshombo
un voleur est mort comme un chien à cause d'un téléphone portable
akufela mwasi, akufela mobali
veuf, veuve
mokolo nakokufa... ngai, mutu ya mbongo
Le jour que je vais mourir... moi, un homme riche
mama ya moninga na ngai moko akufi
La maman d'une de mes amies est morte.
soki liwa eyebaki mbongo mbele batu ya mbongo bakufaka te
Si la mort connaissait l'argent, alors les riches n'allaient pas mourir.
akosi ke noko na ye akufi.
Elle ment que son oncle est décédé.
Ndenge naza awa, nazokufa na nzala.
Comme je suis là, je meurs de faim.
mbanda mama akufa nakoma mowumbu ya mwasi ya papa.
Depuis que maman est morte, je suis devenu l'esclave de la femme de papa.
okokende wapi soki okufi lelo
Tu iras où si tu meurs aujourd'hui ?
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies