FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

mpo
po
mpóconsonne sonore
pour

mpo te
pour que

mpo na
parce que

mpo na nini
pourquoi
po na biso-biso se na SKOL
po na biso-biso se na SKOL
© unibra
voir aussi : ponà, mpona
item 36 exemples (bandakisa ntúkú mísáto na motóbá) ...
Motema na ngai ezali kobeta po na yo
Mon coeur bat pour toi
Obangisi ye po na nini ?
Pourquoi tu lui as fait peur ?
Mama azali kolela po na nini ? Ntina nini ?
Maman pleure pourquoi ? Pour quelle raison ?
amati bisi po na kokende na zando.
Il a pris le bus pour aller au marché.
... po na kozonga. ... po azonga. ... po azali kozonga.
... pour rentrer. ... pour qu'il rentre. ... parce qu'il est en train de rentrer.
lakisa ngai nzela po na kokende na Kintambo.
Montre moi le chemin pour aller à Kintambo.
ezali esengo na ngai po na komona moko na moko na bino na liyangani oyo na sima ya nzanga.
C'est pour moi une joie de revoir chacun de vous dans ce culte de l'après midi.
manguele mpe kisi ezali te po na kobatela moto azua VIH to bokono ya SIDA te.
Il n'y a pas de vaccin, ni de médicament pour protéger quelqu'un d'attraper le VIH ou la maladie du SIDA.
Akufaki mpo na koningana ya mabele.
Il est mort à cause d'un tremblement de terre.
bazui singa po babenda mutuka
Ils ont pris la corde pour tirer la voiture.
Po na nini mibali ya lelo balingi lisusu te babotine ?
Pourquoi les hommes d'aujourd'hui ne veulent plus les préservatifs ?
tata, mama, ndeko, tofuta mpaku ya mabele, po totonga ville ya kinshasa
papa, maman, cousin, payons la taxe du sol, pour que nous construisions la ville de Kinshasa
po na kozwa bis okoki kosomba tiké po na mokolo moko, sanza moko to mbula mobimba.
Pour prendre le bus, tu peux acheter un billet pour un jour, un mois ou toute une année.
Bambanda na nga nyoso bafandeli yo po na mbongo na yo
toutes mes rivales restent avec toi pour ton argent
nalangwi na lolango po na yo
je suis ivre d'amour pour toi
ezali te po tomelaka na nganda moko, nde tokomi baninga
ce n'est pas parce que nous avons l'habitude de boire dans le même café, que nous sommes devenu amis
ozali po na nga eyano na mikakatano, nzela ya solo ya kotambola, yesu na nga, kumama
Tu es pour moi la réponse aux problèmes, le vrai chemin à marcher, mon Jésus, sois honoré
bangotobobo bakima ntshik po nua eleki na bongo
Les idiots ont fui l'école parce qu'il y a trop de chanvre dans le cerveau
yaka po tokende kotala yaya na yo ya mwasi
viens pour qu'on aille voir ta grande soeur
naye po tosolola likambo wana
Je suis venu pour qu'on cause de ce problème là
komela masanga ya sukali mingi te. eza malamu te po na mino.
Ne bois pas beaucoup de boissons sucrées. Ce n'est pas bien pour les dents.
tata naza na posa ya mbongo po nasomba bilamba
Papa, j'ai besoin d'argent pour acheter des vêtements.
nazozela supu na ngai ebela po nalia
J'attends que ma soupe soit prête pour que je mange.
sukola kikalungu po eza salite
Lave la poêle parce qu'elle est sale.
kobela te po lobi tokobina
Ne sois pas malade parce que demain nous allons danser.
ebongi obima na mwana na yo po azua mopepe
Il faut que tu sortes avec ton enfant pour qu'il prenne de l'air.
yela ngai mwa ndambo ya loso po nalia
Emmène-moi une petite portion de riz pour que je mange.
sala nyonso olingi po nakuta ye awa te !
Fais tout ce que tu veux pour que je ne la trouve pas ici !
Mwana oyo libota naye basundola ye po akoma bulawayo.
Cet enfant, sa famille l'a abandonné parce qu'elle est devenue prostituée.
Nalembi koliya bazoka oyo po epesi nga mbanga pasi
J'en ai marre de manger cette chique, car elle me donne mal à la mâchoire.
Azali na nkanda mpo na ngai.
Il est faché sur moi. (il a de la colère à cause de moi)
Nakoki komona eloko te mpo na molili.
Je ne pouvais rien voir parce qu'il faisait noir.
Napesi Nzambe matondi mpo na yo
Je remercie Dieu pour toi.
ndenge ya komibatela : na capote. Nzela ya malamu koleka mpo na komibatela ezali kosalela capote
la manière de se protéger : avec le préservatif. Le meilleur moyen pour se protéger est d'utiliser un préservatif.
bana bavandaki na mabele mpo na bakiti ezalaki te. source: Espérance-François Ngayibata Bulayumi, Mosuni
Les enfants étaient assis par terre parce qu'il n'y avaient pas de chaises.
mbinzo ezali malamu mpo na koliya.
La chenille est bon pour manger.
item Article : consonnes
En lingala des fois on entend "nsoso" et des fois on entend "soso". On pourrait penser qu'on est
libre de choisir si on met ou on laisse la première lettre m ou n quand le mot commence par une double consonne,
mais en réalité c'est soumis à une règle bien précise :

En lingala, la première lettre m ou n peut tomber pour les mots qui commencent par mp, nt, ns ou nk.
(Les consonnes sonores)

NK
nkama / kamacent
nkingo / kingocou
nkisi / kisimédicament
nkulutu / kulutuaîné
nkoba / kobatortue
MP
mpinzoli / pinzolilarme
mpo / popour
mpamba / pambanul
mpuku / pukusouris
mpongi / pongisommeil
NS
nse / sedessous
nsoso / sosopoulet
nsambo / sambosept
nsango / sangoinformation
nsinga / singafil
NT
ntina / tinaimportance
ntolo / tolotorse
ntalo / talovaleur
ntango / tangotemps
ntaba / tabachèvre

Dans les autres cas, la première lettre est obligatoire.
(Les consonnes sourdes)

NG
nguyapouvoir
ngaimoi
ngandabar
ngubaarachide
ngulucochon
MB
mbokavillage
mbelicouteau
mbetulit
mbilapalmier
mbisipoisson
ND
ndakomaison
ndekocousin
ndakisaexemple
ndumbaprostituée
ndundalégume
NZ
nzotocorps
nzetearbre, baton
nzelachemin
nzungumarmite
nzalafaim
NY
nyeiexcrément
nyosorien
nyokaserpent
nyamaanimal
nyongodette


puku
mpúku, pl. bampuku (classe 9/10 (2) : - / - (ba-) : pluriel invariable selon contexte (ou familier/moderne ba-))consonne sonore
mpô, pl. bampo (classe 9/10 (2) : - / - (ba-) : pluriel invariable selon contexte (ou familier/moderne ba-))
mpóko, pl. bampoko (classe 9/10 (2) : - / - (ba-) : pluriel invariable selon contexte (ou familier/moderne ba-))consonne sonore
rat, souris

contexte : informatique
mpó : la souris de l'ordinateur
rat
rat
src : google images
...
...
src : google images
tags :
autres mots avec le tag 'animaux' : abúlá, alíkilíkoso, alúlu, angilé, bilulu, ebambi, ebélá, ebengá, ebwélé, ekange, nyóka, eloló, engondó, eséndé, esósoló, esulúngútu, etúná, gambala, kóbá, libanki, libáta, ligóródó, likaku, likayábo, lipekápeka, lipungupungu, lonsálá, liswésé, lisweswe, liyanga, liyanzi, malwa, likélélé, mbenga, mbínzó, mbisi, mbizo, mbólókó, mbwá, mémé, mokomboso, mongúsu, lompese, mokila, mondélé, moselekete, ndeke, ngando, ngémbo, ngolo, ngómbé, ngubú, ngúlu, ngúma, ngungi, nyama, nioka, nkóli, niaou, nkosi, nkoyi, ntaba, ntambo, nzálé, nzinzi, nzói, nzoku, nzombó, peseli, puku, mpúnda, sili, nsímbiliki, nsombo, soso, kokombele, makaku, nsósó, niáo, limpúlututú, fumba, likayábu, nsili, nkóndokó, niama, likáko, nkoso, kúkúrú, kúkúlú, nkoi, kaméla, díkálá, dígalá, kángú, kángá, kángé, mpúku, púnda, farása, simbiliki, longembú, nkóbá, lipiká, mpambo, monselékéta, kwódo, ligbólóló, mombemba, dádádá, lilúku, ndôngê, mondôngê, mbómbóli, kosákosá, libongo, nkusú, mpate, ebuele, esele, kimpiatu, kipekapeka, kombekombe, likuanganzala, limeme, mantekita, mbuá, mfuenge, mokumbusu, mpakása, mutshopi, ndakála, niawu, ntámbwe, ndjoku, nzoyi, mondonga, sonzo, tshaku, kinsekua, libúndú, mokondó, lilangwá, mpíodi, saladini, lilangua, thomson, tomson, mpose, likolo, mbisi, mpómbóli, elandela, nkungi, makako, nkómbé, kombe, mbéngé, mpô, mpóko, thompson, mpóka, ndeke, nsósó, sombo, nkotó, nkósi, mpatá, elulu, mémé, losala, kapíténe, yángánga, nkómbénkómbé, malebo, pakása, samáki, monkusú, monselekete, mosopi, longonya, likwanganzála, litaká, mbwá, nzoko, likónko, nkéma, mokele-mbembe, mpóngó, nyaú, séléngé, nyawu, mbadi, shakú, púsu, ekonda, likókóló
autres mots avec le tag 'informatique' : bongó, dísiki, ebómbelo, ebúkútu, kofina, mpô, emonisi
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies