FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

mpasi
mpási, pl. bampasi (class 9/10 (2) : - / - (ba-) : plural invariable from context (or informal/modern ba-))sonorous consonant
pási
(to be) ill, unwell, suffering, pain
pity
item 16 examples (bandakisa zómi na motóbá) ...
Salisa ngai, nazoyoka libumu mpasi.
Help me, I have stomach pain.
lino mpasi elingi koboma ngai.
The toothache wants to kill me.
Apesaki ngai mpasi na motema.
She gave me pain in my heart.
pondu na yo ezangi mungwa. pasi ya solo.
your pondu lacks / misses salt. really a pity.
bayebaka moninga malamu na tango ya pasi.
One knows a good friend in bad times.
nazoyoka mutu pasi
I have a head ache
atie ngai pili-pili na liso. ezosala pasi.
She put pepper in my eye. It hurts.
soki loboko eyebaka pasi oyo lutu emonaka na tango ya kobalusa biloko
If the hand knew how the spoon suffers when stirring the food...
kozanga baboti ezali pasi mingi
Not having parents is very difficult.
nazoyoka lino pasi ebongi nakende epayi ya munganga
I feel tooth pain. I have to go to the doctor.
mobeko oyo ezali pasi mingi pona kotosa
That law is very hard to respect.
mpasi ya moto
migraine, headache
koniata ngai te nazoyoka pasi.
Don't trample me, it hurts !
Nalembi koliya bazoka oyo po epesi nga mbanga pasi
I'm tired of eating this chewing gum, cause it makes my jaw hurt.
Tala bamapalata na mutu na ye, eza pasi
Look at the infections on his head, it's sad.
Limbisa ngai, oyo ekosala mwa pasi.
excuse me, this will hurt a bit.
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies