FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

solo
sóló
real, true
the truth
bwaka mayi na wc. zala motu ya solo.
bwaka mayi na wc. zala motu ya solo.
src : google images
solo, nalingi
solo, nalingi
© Grand Hotel Kinshasa
see also : bosolo
item 11 examples (bandakisa zómi na mókó) ...
ezali ya solo !
it's true! it's the truth!
Wana ezali ya solo, kosakana te.
This is true, don't joke.
Eza ya solo ? - Te, eza lokuta !
Is it true ? - No, it's a lie !
Soki oyo ezali ya solo, nakufa.
If that's true, I'll die.
bwaka mayi na wc. zala motu ya solo.
Throw water in the toilet. Be a real man.
solo te !
not true !
pondu na yo ezangi mungwa. pasi ya solo.
your pondu lacks / misses salt. really a pity.
ozali po na nga eyano na mikakatano, nzela ya solo ya kotambola, yesu na nga, kumama
You are for me the answer to the problems, the real way to walk, my Jesus, be praised
monoko ya mokolo elumbaka solo, kasi elobaka maloba ya solo Proverb/expression (don't translate litteraly)
The mouth of the elderly smells bad, but the words are true.
luka mwasi moko oyo akolinga yo na bolingo ya solo
Seek a woman who will love you with real love.
ozalaka ndeko na ngai ya solo te.
You are not my real sister.
solò
nsolò, pl. bansolo (class 9/10 (2) : - / - (ba-) : plural invariable from context (or informal/modern ba-))sonorous consonant
odor, fragrance, smell
item 11 examples (bandakisa zómi na mókó) ...
Mosala na zolo ezali koyoka solo na kopema.
The work of the nose is to smell odors and to breathe.
oooh, solo kitoko. mama azolamba ntaba
oooh, it smells good. Mama is preparing goat.
kolumba monoko solo eza maladi to te ?
Is stinky mouth an in sickness or not ?
Monoko ya mobange, elumbaka solo, kasi elobaka makambo ya lokuta te. soki okimi solo wana, okoyeba makambo te. Proverb/expression (don't translate litteraly)
The mouth of the elderly, it smells foul, but doesn't tell lies. If you avoid this smell, you will not know the affairs.
masoko solo ya fumbwa epola banda sanza moko
buttocks that smell like fumbwa that is rotten since a month
bana bakoki kotanga malamu te likolo ya makelele ya wenze mpe solo ya fulu source: Espérance-François Ngayibata Bulayumi, Mosuni
The children couldn't study well because off the noise of the small market and the smell of the dump.
monoko ya mokolo elumbaka solo, kasi elobaka maloba ya solo Proverb/expression (don't translate litteraly)
The mouth of the elderly smells bad, but the words are true.
hum... solo kitoko na makusa. mama azolamba nini ?
yummi... It smells good in the kitchen. What is mum preparing ?
mwasi ya zemi akokaka basolo mususu te.
A pregnant woman can't stand certain odors.
bilamba na ye ezali na solo ya mapeka.
His clothes smell like armpits.
Nayoki nsolo malamu na nzoto na ye.
I smelt a nice odor on her body.
sóló, pl. basolo (class 9/10 (2) : - / - (ba-) : plural invariable from context (or informal/modern ba-))
eggplant (aubergine)
solo
solo
© pvh
solo
solo
© pvh
tags :
other words with the tag 'fruit and vegetables' : ananási, bikedi, eloló, bitekuteku, bonsáó, dongódongó, ekéké, ekútu, esápa, etabe, etabi, fumbwa, kwánga, lidésu, likémba, lilála, lingolo, litungúlu, liyebo, lisángó, mbálá, mbika, mbíla, mbuma, ndúnda, ngúba, paipái, payipayi, pilipili, pondú, pwaró, tomati, tondolo, ndímo, likásu, kokotí, likombó, liyebú, mosángó, liboké, kúnde, lisángú, libengê, mbomá, avoká, savoká, mpondú, lidamé, lipéla, litóngé, payi, linanási, ndiká, pakápáka, mokókóló, linioko, misili, sáfú, tomato, sakasáka, nkúnde, pili-pili, ndembi, limona, likásó, lilebó, mongúba, nsáfú, bonsau, ngombo, gombo, mondiká, sóló, sinda, mondéngé, mundenge, biteku-teku, mádamé, poilu, liebú, mazulu, mungenge, ananá, ananási
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies