FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

naino
nánu
naino
still
already

negative
nanu te : not yet
boseka nga te nanu esili te
boseka nga te nanu esili te
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
see also : libosó
item 17 examples (bandakisa zómi na nsambo) ...
akei nanu na zando, (na) sima akokende mosala.
he goes already to the market, afterwards he will go to work.
kende nanu kosomba lipa.
Go buy the bread already.
Kosomba nanu lipa te.
Don't buy the bread yet.
Azali kolala nanu na ekeko.
She still sleeps with a doll.
Ozali na mpongi ? - Nanu te.
Are you sleepy ? - Not yet.
Bilamba na ngai nanu ekauki te.
My clothes haven't dried yet.
kopesa ye mbongo mingi te, aza nanu mwana muke
Don't give him much money, it's still a little child
nzela ezali nanu mosika
The road is still long.
kobima nanu te. naza nanu na posa na yo.
Don't leave yet. I still need you.
aza nanu mwana muke. azomela likaya na mbula na ye.
He's still a small kid. He smokes sigarets at his age.
oza nanu elenge. kosala yango te. okoya kobebisa bomoi na yo.
You are still young. Don't do that. You risk spoiling your life.
kokita nanu te. zela mukie.
Don't come down yet. Wait a bit.
yoka nanu motuna na ngai liboso ya koyanola ngai
Listen already to my question before answering me.
nayoka nanu nzembo oyo te
I did not hear this song yet.
meka nanu kotanga oyo.
Try first reading that.
yo oza nanu elenge makasi
You, you are still very young.
Liboso kolongola bipoti na lisu ya moninga longola nanu oyo eza na lisu na yo
Before removing the crusts from the eyes of a friend, remove already those that are in your eyes.
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies