FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

azomela
azomela, form of a verb
komela, regular construction (root : mel) (class 15 : ko- (verbs))modern version
komele, regular construction (root : mel) (class 15 : ko- (verbs))
to drink, to swallow
to consume, to smoke,...
Channel azomela mayi
Channel azomela mayi
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
namelaka pe Kanny
namelaka pe Kanny
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
derived words : bimeli, momeli
tags :
item 29 examples (bandakisa ntúkú míbalé na libwá) ...
epekisami kotambusa motuka soki omeli masanga.
It's prohibited to operate a vehicle if you drunk (a drink).
omela mai
you drink water
naza na nzala. Nazoyoka nzala. Naza na posa ya komela. Naza na posa ya mayi.
I'm hungry. I feel hungry. I'm thirsty (desire to drink). I'm thirsty (desire for liquid).
Otikaki lipa na yo awa, namelaki sucré nango
You left your bread here, I drank a soda with it.
komela likaya.
To smoke (to take tobaco)
oza na miso lokola moto ameli lotoko.
You have the eyes like someone who drunk lotoko.
mai ya komela
water to drink
komela masanga ezali esengo ya mokili
To drink beer is a worldly pleasure
Natiki komela likaya banda lelo.
I abandon smoking from today on.
omelaka makaya boni na mokolo ?
How many cigarettes do you smoke a day ?
Mokolo moko, nguma akendeki bokila na zamba. Amonaki nyama moko ya monene na amelaki ye mobimba.
One day the python went hunting in the forest. He had seen a large beast and had swallowed it entirely.
komela mingi, kolangwa muke
To drink a lot, to get a bit drunk
muana moke amelaka likaya te
a small child doesn't smoke a sigaret
Nasala nini soki papa to mama amelaka bangi to alangwaka masanga
what to do when papa or mama smokes weed or is getting drunk with beer ?
ezali te po tomelaka na nganda moko, nde tokomi baninga
It's not because we use to drink at the same café, that we became friends
komela masanga ya sukali mingi te. eza malamu te po na mino.
Don't drink much sweet drinks. It's not good for your teeth.
komela mayi na ngai te
Don't drink my water
munganga alobi ebongi omela mayi mingi.
The doctor said, it's good to drink a lot of water.
lolenge boni ebongi bayebisa yo pona otika komela kisi oyo
How should they let you know to stop taking that medicin ?
olingi komela masanga nini ?
What drink would you like to drink ?
komela likaya ezali malamu te
It's not good to smoke sigarets.
aza nanu mwana muke. azomela likaya na mbula na ye.
He's still a small kid. He smokes sigarets at his age.
ebongi omela bankisi na yo pona obika.
You should take your medicin to heal.
nalingaka komela nkisi te.
I don't like to take medicin.
kanga monoko na yo pamba te okoya komela nzinzi.
Close your mouth or else you risk swallowing a fly.
Mwana ebongi amela miliki pona akola malamu.
A child must drink milk to grow well.
yela ngai masanga mbila namela.
Bring me the palm juice, so that I may drink.
mama, mela bakisi na yo oyo munganga apesi.
Mum, take your medicine that the doctor prescribed you.
pona kokola malamu ebongi komela mayi mingi
To grow well, it is good to drink a lot of water
other words with the tag 'verbs with [ko...e]' : kokende, kobeleme, kofole, kokipe, komele, kosambwe, kosambue, kokesene, kobéle, koseke, kolénge, komesene, kotéleme, kotéke, komeme, kobéte, kolangwe
azomela, form of a verb
kozóma, regular construction (root : zom) (class 15 : ko- (verbs))
to bark

kozómela
to bark / to cry hard / protest against something
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies