FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

boni
bóní
how (are you) ?
How much / many ?
what?

bóníbóní
how ? in what way ?
item 17 examples (bandakisa zómi na nsambo) ...
mbala boni
how many times
tala boni bana Jacob azuaki mpe lolenge boni azuaki bango
see how many children Jacob got and also in what way he got them
talo boni ?
How much does it cost ? (how's the price ?)
ozali na mibu boni ? Ozali na mbula boni? Obotamaki mobu nini?
How old are you ? (How many years do you have ?)
Bato bazali motuya boni na libota na yo ?
How many people are there in your family ?
motuya boni ya badollar bafutaka yo ? - na se ya 500 ? kati ya 500 na 1000 ? 1000 tii likolo ?
how much in dollars do they pay you ? less than 500 ? between 500 and 1000 ? 1000 and more ?
azali na zemi ? basanza boni ?
Is she pregnant ? How many months ?
omelaka makaya boni na mokolo ?
How many cigarettes do you smoke a day ?
mbote, boni nzoto ? nga naza malamu. nalingaki kaka napesa yo mbote
Hello, how's the body (the health) ? I'm doing well. I just wanted to greet you.
Mbote papa. Boni ? - Ngai malamu. Bongo yo ? - Ngai mpe malamu.
Hi mister. How are you ? - Me, I'm good. And you then ? - Me too, I'm good.
boni bana na yo ? bazali malamu ?
How are your children doing ? Are they doing well ?
boni lelo oye tongo boye ? likambo ?
How come you came so early ? Is there a problem ?
lolenge boni ebongi bayebisa yo pona otika komela kisi oyo
How should they let you know to stop taking that medicin ?
lolenge boni nakoki koloba na mobali oyo pona atika nga kimia
How can I talk to that man so that he'd leave me in peace ?
papa na yo aza na basi boni ?
Your father has how many women ?
bato boni bayaki likita ?
How many people were at the reunion ?
Mbote. Boni ? - Ngai malamu, ebongo yo ? - Ngai pe malamu.
Hello. How are you ? - Me good, and you ? - Me too good.
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies