translation / dictionary Lingala - English
lolenge
loléngé,
pl. ndenge (class 11/10nd : lo-l- / n-l- / nd-)
method
way, manner
type
- ndenge nini ?
- How are you ? How ?
- tala boni bana Jacob azuaki mpe lolenge boni azuaki bango
- see how many children Jacob got and also in what way he got them
- lolenge moto akoki kokaba to kozua VIH
- the way someone can transmit or catch HIV.
- biloko na ndenge na ndenge
- all sorts of things
- alakisaki babina ndenge nini
- He taught them how to dance.
- ndenge moko
- in the same manner, the same way
- tala, oyo ezali ndenge na biso
- look, this is our method
- ndenge ya komibatela : na capote. Nzela ya malamu koleka mpo na komibatela ezali kosalela capote
- the way to protect oneself : with a condom. The best method to protect oneself is to use a condom.
- tolobi ndenge moko
- We spoke the same way. (we said the same thing)
- Oyo ezali nsango ya kosunga yo pona koyeba ndenge nini kelasi ya monoko ya Lifalanse etambolaka.
- This is an information to help you to know in which manner the lesson of the french language functions.
- Na motema nayebaki ete ezali mabe, kasi namonaki ndenge mosusu ya kosala te.
- In the heart I knew it was bad, but I saw no other way of acting.
- Bazali kobatela mino malamu te, mosusu esila ngala mpe mosusu balambi yango na ndenge elongobani te.
- They don't conserve the medicines well, others are expired and others they prepare with non conform methods.
- tokutana ndenge nini naza na hotel Ibis
- How would we find each other ? I'm at hotel Ibis.
- Ndenge nini tokoki komikebisa na ngenge ya SIDA ?
- How can we protect ourselves from the AIDS virus ?
- tozali lisusu na mayi te, mwinda te. sikoyo tokosala ndenge nini
- We have no more water, no light. How will we work now ?
- lolenge boni ebongi bayebisa yo pona otika komela kisi oyo
- How should they let you know to stop taking that medicin ?
- lolenge boni nakoki koloba na mobali oyo pona atika nga kimia
- How can I talk to that man so that he'd leave me in peace ?
- liteya ya lelo ezalaki ndenge nini ?
- How was the preaching of today ?
- lelo moyi eza te. Tokobima ndenge nini ?
- Today there's no sun. How are we going to go out.
- alataka ndenge alingi.
- She dresses like she wants.
- soki napesi yo mbongo wana, ngai, nakolia ndenge nini ?
- If I give you that money, me, how will I eat ?
- ndenge nini bosalaki pona boyiba mbongo na ngai ?
- How did you do it to steal my money ?
- Ndenge naza awa, nazokufa na nzala.
- Like I'm here now, I'm dying from starvation.
- Ndenge nini osali pona kokota awa ?
- How did you do it to enter here ?
- tala ndenge mobali na ye aza kokosa.
- Look how her man is lying.