FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

mosusu
mosusu, pl. misusu (class 3/4 : mo- (mu-) / mi- : objects)
mosusu, pl. basusu (class 1/2 : mo- (mu-) / ba- (persons))
mususu, pl. misusu (class 3/4 : mo- (mu-) / mi- : objects)Kinshasa version
mususu, pl. basusu (class 1/2 : mo- (mu-) / ba- (persons))Kinshasa version
other
see also : lisúsu
item 19 examples (bandakisa zómi na libwá) ...
Pilipili ya elanga ya yo, moto mosusu akolia yango. Proverb/expression (don't translate litteraly)
The pepper of your field, someone else will eat it.
bobele ye, mosusu te !
only him, not another one !
Na motema nayebaki ete ezali mabe, kasi namonaki ndenge mosusu ya kosala te.
In the heart I knew it was bad, but I saw no other way of acting.
mokolo mosusu nakobina na yo
Another day I will dance with you
bantaba mibale wana ! moko ntaba ya pembe, mosusu ntaba ya moyindo
There are two goats there. One goat wite, another goat black
Bazali kobatela mino malamu te, mosusu esila ngala mpe mosusu balambi yango na ndenge elongobani te.
They don't conserve the medicines well, others are expired and others they prepare with non conform methods.
ntango mosusu / mikolo misusu
sometimes (another time / different days )
ntango mosusu boninga elekaka bondeko
Sometimes friendship surpasses the family bond
tango mosusu
maybe
tokomonana mokolo mosusu
We will see each other again one of these days.
mokolo mosusu kanda ekosila pe nakozonga tosamba © groupe Choc Star
One of these days the anger will cease and I'll come back so that we'll judge
kolia biloko ya tata na yo te. lia biloko mosusu
Don't eat your father's food. Eat something else.
mwasi ya zemi akokaka basolo mususu te.
A pregnant woman can't stand certain odors.
monoko na yo nde ekoboma yo mokolo mosusu
It's your mouth that will kill you one of these days.
asombi tukutuku mususu. akomi na yango mibale.
She bought another scooter. She has two of them now.
tata mosusu abimi libanda.
another man came out.
bozalaki mibale, wapi mosusu ?
you were two, where is the other ?
Soki nzoto to poso ya moto ekutani na ya moto mosusu, tina ya kobanga ezali te.
If the body or the skin of a person meets with that of another person, there's no reason to fear.
Basusu kokufa, basusu kobotama, mokili ezalaka boye.
Some die and others get born, the world is like that.
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies