FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

pe
mpésonorous consonant
pe
also
and (conjunction, to combine two phrases, otherwise use na)
namelaka pe Kanny
namelaka pe Kanny
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
item 40 examples (bandakisa ntúkú mínei) ...
Yo mpe !
You too!
soki mpe nani
whoever
tala boni bana Jacob azuaki mpe lolenge boni azuaki bango
see how many children Jacob got and also in what way he got them
Oyo akotambola na moyibi, akokoma mpe moyibi. Proverb/expression (don't translate litteraly)
One that walks with a thief will also become a thief.
manguele mpe kisi ezali te po na kobatela moto azua VIH to bokono ya SIDA te.
There's no vaccine nor a medicine to protect someone from acquiring HIV or the disease AIDS.
Moyi ezali mpe monzoto.
The sun is also a star.
nioka abangaka mpe moto Proverb/expression (don't translate litteraly)
The snake is also afraid of man
Djo ayebaki ete kosopa zemi ezali lisumu monene, kasi makango na ye azwaki zemi, mpe Djo azalaki na likoki te ya kobala mpe kobokola mwana.
Djo knew that having an abortion is a great sin, but his fiancée got pregnant and Djo did not have the means to get married and raise a child.
Bazali kobatela mino malamu te, mosusu esila ngala mpe mosusu balambi yango na ndenge elongobani te.
They don't conserve the medicines well, others are expired and others they prepare with non conform methods.
tala - mpe - lata
prêt-à-porter
nakobondela pona yo mpe libota na yo
I will pray for you and also your family
bitumba ezali pili-pili mpe mungua ya libala. Proverb/expression (don't translate litteraly)
The fights are the pepper and the salt of the mariage.
Yezu abatisami na mayi mpe na molimo
Jesus was baptised by water and by the Spirit.
Mbote papa. Boni ? - Ngai malamu. Bongo yo ? - Ngai mpe malamu.
Hi mister. How are you ? - Me, I'm good. And you then ? - Me too, I'm good.
bana bakoki kotanga malamu te likolo ya makelele ya wenze mpe solo ya fulu source: Espérance-François Ngayibata Bulayumi, Mosuni
The children couldn't study well because off the noise of the small market and the smell of the dump.
etape ya nzete ya mangolo ebukani mpe ekweyi likolo ya ndako
The branch of the mangotree broke off and fell on the house
ebale ya kongo ezali monene mpe na mbisi ebele
The Congo river is big and also has a lot of fish.
mokolo mosusu kanda ekosila pe nakozonga tosamba © groupe Choc Star
One of these days the anger will cease and I'll come back so that we'll judge
ngai mpe nalingi nabima na pokwa
Me too I want to go out tonight
pona nini ozalaka boye ? yo mpe...
Why are you like that ? you too...
nzambe alingi tolingana pe tosalisana
God wants us to love each other and to help each other
ngai pe nalingi koya na bino
Me too, I want to come with you.
tata na ngai pe asombi motuka
My dad too bought a car.
kata mpe mandefu na yo
Also cut your beard
mwana mwasi oyo azalaka monene pe molayi.
That girl is big and tall.
alobaka mingi mpe abombaka sekele te
She talks much and she never keeps a secret.
yo, makambo osali ezali pe malamu te
You, the things you did weren't good either.
yebisa ngai esika olalaki pe na nani.
Let me know where you slept and with who.
yaya na ngai pe asalaka manzaka.
My sister also does nails.
Azalaka mwasi moko makasi pe nzunzu.
She's one strong and courageous woman.
olingi nasala yo pe manzaka ?
Do you want me to do your nails too ?
koswana eza pili-pili pe mungwa ya libala. Proverb/expression (don't translate litteraly)
Arguing is the pepper and the salt of the mariage.
mayele ezalaka pe kokanisa lobi ya bana.
It's also smart to think about the future of the children.
Mbote. Boni ? - Ngai malamu, ebongo yo ? - Ngai pe malamu.
Hello. How are you ? - Me good, and you ? - Me too good.
Nzambe zala sima pe kati ya motuka na ngai bayini bazala mosika
God be behind me, and also inside my car, that haters may be far
mokumbi abandaki konimba pe abomi moto
The driver started to drowse and killed someone
atuti libaku pe akweyi
He hit an obstacle and he fell
lala malamu. - yo pe, motema na ngai, noki tomonana. nalela yo makasi.
Sleep tight. - You too, my love, that we may see eachother soon. I thoroughly love you. (in lingala : "I have loved you thoroughly" - past)
obungi. ozalaki wapi ? - Awa, na ndaku. Nalalaki pe natalaki télé.
You disappeared. Where were you ? Here, at home. I was sleeping and watching television.
longa 1500$ ya kelasi to pe mbula mobimba ya miliki NIDO.
Win 1500$ for school or a whole year of NIDO milk.
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies