FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

nzambe
nzámbe, pl. banzambe (class 1a/2 : - / ba-)
nzambe, pl. banzambe (class 9/10 (2) : - / - (ba-) : plural invariable from context (or informal/modern ba-)) (None)
God, Lord
Nzambe Monene
Nzambe Monene
© Dena Mwana
Ngolu ya Nzambe
Ngolu ya Nzambe
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
yo te jaloux calcul na yo eza ya nzambe te
yo te jaloux calcul na yo eza ya nzambe te
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
Nzambe apambola bino
Nzambe apambola bino
src : google images
see also : nzakomba, ndákonzámbe, nganga-nzambe
tags :
item 23 examples (bandakisa ntúkú míbalé na mísáto) ...
Nzambe ya nguya Proverb/expression (don't translate litteraly)
God Almighty
Nzambe mokonzi
God the father (the chief)
nganga nzambe ( nganga-nzambe )
Priest, abbot, religious servant of God
na likolo pela moko awa na nse moko te akokani na yo na nguya na kembo yo 'za nzambe
in heaven as here down below there is no one that ressembles you in power and glory, you are God
eloko moko te eleki nguya na Nzambe
Nothing surpasses the power of God (nothing is impossible to God)
Nzambe azali malamu mingi
God is very good.
Napesi Nzambe matondi mpo na yo
I thank God for you.
Nzambe apambola bino mingi. Kimia ezala na bino. Nzambe abatela bino.
My God bless you in abundance. Peace be with you. May God protect you.
nzambe apesa yo makasi.
May God give you the force.
nzambe asambelaka te. akosambela nani Proverb/expression (don't translate litteraly)
God doesn't pray. To who will he pray ?
nzambe apesa biso bonsomi ya kopona
May God give us the freedom of choice
ndako ya Nzambe
house of God, temple
tokosenga epayi ya Nzambe abatela biso ti na suka ya sanza.
We will ask God that he may protect us till the end of the month.
nzambe alingi tolingana pe tosalisana
God wants us to love each other and to help each other
nzoto na ngai tempelo ya Nzambe, esika Molimo Mosantu akofanda
My body is the temple of God, the place where the Holy Spirit will reside.
Nzambe azali malamu mingi pona ngai
God is very good for me.
Nzambe akosala makambo ya minene.
God will do great things.
Mosala wana ya kindumba ezali malamu te na miso ya Nzambe.
The work of prostitution is not good in the eyes of God.
mutu moyindo na mutu mondele bazali batu oyo Nzambe akeli.
The black man and the white man are persons that God created.
wapi libonza oyo okobonzela Nzambe ?
Where's the offering you are going to offer to God ?
eza mokano ya Nzambe.
It's God's will.
mosali ya Nzambe
pastor
Nzambe zala sima pe kati ya motuka na ngai bayini bazala mosika
God be behind me, and also inside my car, that haters may be far
other words with the tag 'church' : abé, altáre, anjelu, apóstolo, avénti, mondimi, batísimu, bibele, bosántu, bosáto, ékelézya, eklézia, elikia, elikya, elónga, etónga, eyamba, kindoki, kristo, likámwisi, lingómbá, lokúmú, losámbo, molimo, mopakano, mosántu, ndoki, ngolu, nguya, nzámbe, óstia, pápa, proféta, sángó, sutáni, zábolo, kosandjola, kopambola, kobonda, lisúmu, eklézya, kobenisa, mosumuki, moseniele, kosamba, mopagano, mokristo, mobíkisi, misioni, mísa, masiya, libóndeli, batísimo, lisúmá, liyangani, mamélo, yesu, molema, molimu, likámuisi, moniangó, monzemba, mpúngú, lífelo, nkémbo, lóla, bondoki, pasitele, bondimi, mpate, mumpe, Yawé, yézu, moklísto, kembo, zábulu, mosánto, Yaweh, pasta, kosanjola, lipamboli, elikiya, konétola, likámwa, likámua, ekelézia, kristu, mpatá, mobáteli, monzimi, konétolo, etumbele, maséle, ndákonzámbe, tempélo, lisanjoli, Yahweh, mokangoli, likámoa, likamóisi
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies