FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

makasi
plural of "bokási"
bokási, pl. makasi (class 14/6 : bo- / ma-)
power, power, vigor, strength, vitality, energy, resistance
makási
tough, hard, strong, solid, resistant, strength
naza beubeu makasi
naza beubeu makasi
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
ekolo ya makasi !
ekolo ya makasi !
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
FARDC - eloko ya makasi
FARDC - eloko ya makasi
src : google images
RDC eloko ya makasi - tokolonga
RDC eloko ya makasi - tokolonga
src : google images
item 35 examples (bandakisa ntúkú mísáto na mítáno) ...
soso ezali talo makasi likolo ya dollar.
The chicken is very expensive because of the dollar.
elongo totangi na mongongo makasi.
Together we read with a raised voice.
Miso makasi, ndoki teProverb/expression (don't translate litteraly)
It's not because one has a strong stare that he's a witch
mayi makasi
ice (hard, solid water)
Lata ekoti, moyi ezali makasi
Wear a cap, the sun shines hard.
Nabetaki maboko makasi mpona bango.
I applauded hard for them.
Keba, pilipili eswi makasi.
watch out, the chilipepper is very hot. (stings hard)
nzambe apesa yo makasi.
May God give you the force.
Oza kitoko makasi ndeke na ngai ya bolingo
You're very pretty, my lovebird
lala malamu. - yo pe, motema na ngai, noki tomonana. nalela yo makasi.
Sleep tight. - You too, my love, that we may see eachother soon. I thoroughly love you. (in lingala : "I have loved you thoroughly" - past)
naza na esengo makasi pamba te nakobima na baninga na ngai na pokwa ya lelo
I'm very glad because I will go out with my friends tonight.
nasepeli makasi na elamba oyo okabeli ngai
I much appreciated that garment you gave me.
elamba oyo kitoko makasi. posa ya kosomba yango.
That garment is very pretty. love to buy it.
nani alobi nazali kobela makasi ?
Who said that I was very sick ?
ozalaka monoko makasi boye pona nini ?
Why do you have such a big mouth ?
mikolo oyo mbula ezobeta makasi.
These days it's raining hard.
oza na nkombo moko kitoko makasi
You have a very beautiful name.
pelisa mwinda. molili eza makasi awa
Turn on the light. It's very dark in here.
epayi na bino nde makelele ezalaka makasi.
There's much noise at your place.
kolata boye te. malili eza makasi libanda.
Don't dress like that. It's cold outside.
aza kokeba na mwasi wana makasi.
He pays much attention to that girl there.
moto eza kopela makasi penza.
The fire is starting very heavily.
tika koganga makasi
Stop shouting hard.
kokende na ebale lelo te mbonge eza makasi
Don't go to the river today. The waves are strong.
ebale ya kongo ezalaka monene makasi
The Congo river is very strong.
semeki na yo ayokelaka yo zuwa makasi
Your sister in law is very jealous of you.
maman nkulutu na biso azobela makasi
The big sister of my mother is very sick.
nazolinga kobima kasi mvula ezobeta makasi.
I want to go out but it's raining hard.
Bongisa ndako. Eza salite makasi.
Arrange the house. It is very dirty.
okoya kotela makasi pamba, tika kopakola mafuta wana
You risk to get very clear for nothing, stop applying that cream.
Aza kosala makelele makasi.
She's making loud noise.
nalingaka mwasi wana makasi.
I like that girl very much.
Azalaka mwasi moko makasi pe nzunzu.
She's one strong and courageous woman.
yo oza nanu elenge makasi
You, you are still very young.
tango akitaka, akitaka na nkembo, abongolaka nioso, apesaka makasi, asekwisaka nioso. © Moïse Mbiye - Tango na Ye
When He descends, He descends in glory, He changes everything, He gives power, He resurrects everything.
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies