FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

mpona
ponà
mponasonorous consonant
see po na / mpo na
for, reason why ...
so that, because
mupepe ya sika pona bana funa
mupepe ya sika pona bana funa
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
pona sante na biso
pona sante na biso
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
see also : po, mpó
item 60 examples (bandakisa ntúkú motóbá) ...
Oyo ezali nsango ya kosunga yo pona koyeba ndenge nini kelasi ya monoko ya Lifalanse etambolaka.
This is an information to help you to know in which manner the lesson of the french language functions.
ah Nzambe ! pona nini masta na ngai aza zoba lokola makaku ?
ah God ! why is my friend stupid like an ape ?
ozozela nga pona ... ?
You're waiting for me because ... ?
nakobondela pona yo mpe libota na yo
I will pray for you and also your family
pona nini bolingo ya mosika esimbaka te ?
Why doesn't long distance love hold ?
nakokufa pona yo
I will die for you
nazokende mobembo pona kotala libota na nga
I go on a trip to see my family.
pona kokola malamu ebongi komela mayi mingi
To grow well, it is good to drink a lot of water
kosala ngai mabe te pona nalingi yo
Don't make me suffer because I love you
pona nini ozalaka boye ? yo mpe...
Why are you like that ? you too...
nazokende na mboka ya mopaya pona kosilisa kelasi na ngai
I'm going to a foreign country (abroad) to finish my studies.
kende kosomba mapa pona tata na yo
Go buy bread for your father
lolenge boni ebongi bayebisa yo pona otika komela kisi oyo
How should they let you know to stop taking that medicin ?
lolenge boni nakoki koloba na mobali oyo pona atika nga kimia
How can I talk to that man so that he'd leave me in peace ?
ozalaka monoko makasi boye pona nini ?
Why do you have such a big mouth ?
Nzambe azali malamu mingi pona ngai
God is very good for me.
sala yango pona ngai, bolimbisi.
Do it for me, please.
pona nini ozokende lokola moyibi boye
Why do you leave as a thieve like that ?
pona nini ozali kosala boye, penza ?
Why do you do like this, really ?
nazokende na zamba pona kokanga baniama
I'm going to the forest to catch animals.
kolia biloko ya sukali mingi te eza malamu te pona mino
Don't eat too much sweet things. It's not good for your teeth.
etumba ya mobali ezali koluka mwasi ya malamu pona kobala
The struggle of a man is to look for a good woman to marry.
pona nini mwana na yo azalaka lokuta boye
Why is your child a liar like that ?
ebongi omela bankisi na yo pona obika.
You should take your medicin to heal.
pona nini ozali kosala ndeko na yo bongo
Why do you do like this to your sister ?
liwa ezali pona mutu nioso
Death is for everyone.
sokola basani noki pona tobima
Wash the dishes quickly so we can go out.
pona nini oza kopela boye ? likambo eza te !
Why are you getting ignited like that ? There's no problem !
oza kotumba bilamba pona nini ?
Why are you burning the clothes ?
libota na ngai ezali motuya mingi pona ngai
My family is very important for me.
pona nini olingaka kobuaka biloko ya kolia boye. eza malamu te.
Why do you love to throw away food like that ? It's not good.
nasombi mapa misato pona bana balia
I bought three loaves of bread for the the children to eat.
aza koboya koya awa, pona nini ?
She refuses to come here, why ?
ebongi totosa mobeko oyo pona tozala na kimia
We should respect that law to be in peace.
mobeko oyo ezali pasi mingi pona kotosa
That law is very hard to respect.
tika nzungu polele pona biloko ebela malamu
Leave the cooking pot open so that the food cooks well.
fungola ekuke pona banzinzi babima
Open the door so the flies can get out.
kelasi na ngai ezali motuya pona ngai
My studies are important to me.
Mwana ebongi amela miliki pona akola malamu.
A child must drink milk to grow well.
Miliki ezali malamu mingi pona mikuwa.
Milk is very good for the bones.
Nazolamba loso pona tolia.
I'm preparing rice so that we eat.
Oza kopema mbangu mbangu boye pona nini ?
Why are you breathing quickly like that ?
losaka pona biloko oyo oyeli biso
Thanks for the food you brought us.
losako mingi pona lisalisi oyo.
Many thanks for that help.
bangi eza malamu te pona nzoto.
Drugs are not good for the body.
oza kokumba biloko ebele boye pona nini ?
Why are you carrying many things like that ?
pona nini oza kokumba mwana na yo na mukongo ?
Why do you carry your child on your back ?
nazokende na Kinshasa pona sanza mibale
I'm going to Kinshasa for two months.
naza na libonza pona eyenga ya lelo te
I don't have an offering for today's service.
pona nini bolingi kotela boye ? Eza malamu te pona poso.
Why do you like to get clear like that ? It's not good for the skin.
pona nini mikolo oyo oza kolia kaka madesu ?
Why all you do these days is eat beans ?
pona nini mibali baliaka likasu ?
Why do men eat cola nuts ?
ndenge nini bosalaki pona boyiba mbongo na ngai ?
How did you do it to steal my money ?
toza kokende na mboka pona matanga.
We're going to the village for a mourning.
Tokotambola makolo pona tokonda mukie.
We'll walk by foot so that we might slim a bit.
ozalaki kozela ngai naya pona obanda kolamba ?
You were waiting for me to come home for you to start cooking ?
Ndenge nini osali pona kokota awa ?
How did you do it to enter here ?
Bakofinga ngai pona nini ?
Why are they going to insult me ?
Bolimbisi pona lobi. Tshombo esilaki moto
Sorry for yesterday. My phone ran out of charge.
Nabetaki maboko makasi mpona bango.
I applauded hard for them.
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies