FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

ndako
ndaku, pl. bandaku (class 1a/2 : - / ba-)Kinshasa version
ndáko, pl. bandako (class 1a/2 : - / ba-)
house
home
ndako
ndako
© La Vache Qui Rit
ndako ya ndele
ndako ya ndele
© junglespirit
ndako ya biso
ndako ya biso
© ndako ya biso
ndako ya bandeko Franciscains
ndako ya bandeko Franciscains
© missioni assisi
see also : ndákonzámbe
tags :
item 48 examples (bandakisa ntúkú mínei na mwámbe) ...
nafandaki na ndaku poso mobimba
I stayed at home all week
Ndaku oyo ekomi kitoko.
That house has become beautiful.
batalana bandaku.
the houses are right across one another (the house are looking at each other)
nkolo ndaku.
landlord, owner of the house
nakeyi nango na ndaku.
I go home with that.
monoko ya ndaku
the entrance (mouth) of the house
Mbula enokelaka ndaku ya moninga omoni yango moke, kasi mokolo ekonokela yo ekomi matata. Proverb/expression (don't translate litteraly)
When the rain fell on the house of your friend, you found it insignificant, but the day it fell on you it became a problem.
kombo ya mboka to kombo ya ndaku ?
The name (family, tribe, village) or the forename (how they call you at home) ?
nazongi na ndaku.
I go back home
Yaya na Joze azongi na ndaku.
Joze's big sister came back home.
ndaku ya monene, ndaku ya moke, ndaku ya suka, ndaku ya liboso
a big house, a small house, the last house, the first house
mbula ememi biloko ya ndaku
The rain has carried away the things of the house
obungi. ozalaki wapi ? - Awa, na ndaku. Nalalaki pe natalaki télé.
You disappeared. Where were you ? Here, at home. I was sleeping and watching television.
ndaku oyo eleki ndaku kuna na kitoko
This house is more beautiful than the house over there.
ndaku ya nzoi
beehive
yo sapologue oza na abakosi versace, kasi miliki ezangi na ndaku
You, the "sapologist", you have a vest of Versace, but milk is missing at home
ndako ya bokono
hospital
ndako ya likwangola / ndako ya bampaka
elderly home
ndako ya Nzambe
house of God, temple
etape ya nzete ya mangolo ebukani mpe ekweyi likolo ya ndako
The branch of the mangotree broke off and fell on the house
boyokani eza na ndako oyo te
There is no understanding in this house
mokolo ndako aleki awa
The owner of the house passed here
tokoki kozala na kimia te na ndako oyo
We can't be in peace in this house
kokota na ndako sikoyo te. nazobongisa.
Don't enter the house now. I'm arranging.
kokanga ngai na ndako te. nazobanga.
Don't lock me in the house. I'm afraid.
kokoma na ndako te. leka mbala moko epayi ya tata na yo.
Don't arrive home. Pass at your dad's place for once.
kaka ngai nde nazosala misala nioso ya ndako
There's only me who does the all the chores of the house .
oyo eza ndako na bino, eza ya biso te
that is your house, not ours.
batu balinga nde kosuana na ndako oyo
The people really love to argue in this house.
nakoki koya kofanda na ndako na yo ?
Can I come live in your house ?
na ndako oyo mokonzi azali te. biso nioso tozali bana.
In this house there's no chief. We are all children.
papa nde azalaka mokonzi ya ndako
It's father who is the chief of the house.
boma moto okoya kotumba ndako pamba
Put out the fire. You risk to incinerate the house.
nakokengela ndaku malamu
I will guard the house well.
mopepe ezali na ndako oyo te
There's no air in this house.
na ndako na bango batie langi ya pembe
In their house they've put white paint.
Nawuti komona bambila mwambe liboso ya ndako.
I just saw 8 policemen in front of the house.
Bongisa ndako. Eza salite makasi.
Arrange the house. It is very dirty.
nzimbu eza te na ndako na ngai
There is no money in my house.
nalingi komona lisusu moto ya liboma oyo na ndako na ngai te.
I don't want to see that lunatik in my house again.
Bolimbisi papa, kobengana mama na ndako te.
Please papa, don't chase mama from the house.
akokota na kati ya ndako oyo te.
She's not going to enter this house.
oyo eza ndako na yo moko
that is your own house
Natambolaki longwa na motuka tii na ndako.
I walked (away) from the car towards the house.
Ndako na ye ezali musika mingi.
His home is very far.
ndako ya ndele
hut made with straw (paillotte)
tofandi na ndako moko.
We live in the same house.
bima na ndako na ngai !
leave my house !
other words with the tag 'home' : mbalasáni, biló, ebáeli, ebutele, ebuteli, efelo, engangala, fúlu, kinkóso, lángi, libóko, lininísa, ndaku, palais, súku, tólo, motóndo, fungóla, efungwelo, ebutelo, kukù, etumbelo, armwár, maluvé, esosele, ngwende, kikóso, linyuka, sabúni, nzongo, zongó, kabiné, wésé, ekuke, mitondo, biró, sabóni
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies