FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

bino
bínó
you (plural)
Nzambe apambola bino
Nzambe apambola bino
src : google images
see also : bísó
tags :
item 19 examples (bandakisa zómi na libwá) ...
Ntaba na bino elekaki awa.
Your goats passed here.
ezali esengo na ngai po na komona moko na moko na bino na liyangani oyo na sima ya nzanga.
It a pleasure for me to see everyone of you in this afternoon cult.
mama na bino, kombo na ye nani ?
Your mama, what's her name ?
Natindeli bino nyonso mbote mingi.
I send you all much greetings.
Nzambe apambola bino mingi. Kimia ezala na bino. Nzambe abatela bino.
My God bless you in abundance. Peace be with you. May God protect you.
bozela nalimbolela bino yango malamu. © Bienvenu Sene Mongaba - Fwa-ku-Mputu
wait that I explain you well.
mbote na bino. mbote na yo.
Greetings to you (plural). Greetings to you (singular).
wana eza biloko ya papa na bino.
That there is the food of your father.
biso na bino, tozali bana ya tata moko na mama moko
we and you, we are children of the same father and the same mother.
tozali koya epayi na bino sikoyo
We arrive soon at your place.
oyo eza ndako na bino, eza ya biso te
that is your house, not ours.
ngai pe nalingi koya na bino
Me too, I want to come with you.
epayi na bino nde makelele ezalaka makasi.
There's much noise at your place.
bolakisi bilamba na bino te
You didn't show your clothes.
bino mibale bolingani mingi
You two love each other much.
nayeli bino nsango ya malamu. boyoka.
I brought you good news. Listen.
Mwana na bino alingi kotanga mingi
Your child wants to study much.
aza mwasi ya ndeko na bino.
It's the wife of your brother.
Mutu akweyi. Bino boseki ye.
Someone fell. You guys are making fun of him.
item Article : pronouns
pronoms
Singular
1 me, I ngai
2 you yo
3 he, she, him (it) ye (yango)
Plural
1 we biso
2 you (pl) bino
3 they, them (those things) bango (yango)

conjugaison
Singular
1 I namoni I see
2 you olingi you love
3 he / she alingi he / she aime
Plural
1 we tolingi we love
2 you (plural) bolingi you love
3 they balingi they love
Objets (S & P)
3 it etali (yo) it looks at (you) / "it's your problem"
other words with the tag 'pronoun' : ba, bangó, bínó, bísó, bo, e, ngai, o, yangó, ye, yo, to, na, nango
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies