FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

bandaku
pluriel de "ndaku"
ndaku, pl. bandaku (classe 1a/2 : - / ba-)version Kinshasa
ndáko, pl. bandako (classe 1a/2 : - / ba-)
maison
ndako
ndako
© La Vache Qui Rit
ndako ya ndele
ndako ya ndele
© junglespirit
ndako ya biso
ndako ya biso
© ndako ya biso
ndako ya bandeko Franciscains
ndako ya bandeko Franciscains
© missioni assisi
voir aussi : ndákonzámbe
tags :
item 48 exemples (bandakisa ntúkú mínei na mwámbe) ...
nafandaki na ndaku poso mobimba
Je suis resté à la maison toute la semaine
Ndaku oyo ekomi kitoko.
Cette maison est devenue belle.
batalana bandaku.
les maison sont l'une en face de l'autre (les maisons se regardent)
nkolo ndaku.
bailleur, propriétaire de la maison
nakeyi nango na ndaku.
Je vais avec ça à la maison.
monoko ya ndaku
l'entrée (la bouche) de la maison
Mbula enokelaka ndaku ya moninga omoni yango moke, kasi mokolo ekonokela yo ekomi matata. Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
Quand il pleuvait sur la maison de ton ami, tu trouvais ça insignifiant, mais le jour que c'est tombé sur toi c'est devenu un problème.
kombo ya mboka to kombo ya ndaku ?
Le nom (de famille, village, tribue) ou le prénom (comme on t'apelle à la maison) ?
nazongi na ndaku.
Je retrourne à la maison
Yaya na Joze azongi na ndaku.
La grande soeur de Joze est rentrée à la maison.
ndaku ya monene, ndaku ya moke, ndaku ya suka, ndaku ya liboso
une grande maison, une petite maison, la dernière maison, la première maison
mbula ememi biloko ya ndaku
La pluie a emporté les choses de la maison
obungi. ozalaki wapi ? - Awa, na ndaku. Nalalaki pe natalaki télé.
Tu as disparu. Tu étais ou ? - Ici, à la maison. Je dormais et je regardais la télé.
ndaku oyo eleki ndaku kuna na kitoko
Cette maison-ci est plus belle que celle-là.
ndaku ya nzoi
ruche (maison des abeilles)
yo sapologue oza na abakosi versace, kasi miliki ezangi na ndaku
Toi, le "sapologue", tu as un abacost Versace, mais le lait ça manque à la maison
ndako ya bokono
hôpital
ndako ya likwangola / ndako ya bampaka
maison de retraite
ndako ya Nzambe
maison de Dieu, temple
etape ya nzete ya mangolo ebukani mpe ekweyi likolo ya ndako
La branche du mangier s'est cassé et elle est tombée sur la maison
boyokani eza na ndako oyo te
Il n'y a pas d'entente dans cette maison
mokolo ndako aleki awa
Le propriétaire de la maison est passé ici
tokoki kozala na kimia te na ndako oyo
On ne peut pas être en paix dans cette maison
kokota na ndako sikoyo te. nazobongisa.
N'entre pas dans la maison maintenant. Je suis en train d'arranger.
kokanga ngai na ndako te. nazobanga.
Ne m'enferme pas à la maison. J'ai peur.
kokoma na ndako te. leka mbala moko epayi ya tata na yo.
N'arrive pas à la maison. Passe une fois chez ton père.
kaka ngai nde nazosala misala nioso ya ndako
Il n'y a que moi qui fais tout le ménage.
oyo eza ndako na bino, eza ya biso te
ça c'est votre maison, ce n'est pas la notre.
batu balinga nde kosuana na ndako oyo
Les gens aiment vraiment se disputer dans cette maison.
nakoki koya kofanda na ndako na yo ?
Est-ce que je peux venir habiter dans ta maison ?
na ndako oyo mokonzi azali te. biso nioso tozali bana.
Dans cette maison il n'y a pas de chef. Nous sommes tous des enfants.
papa nde azalaka mokonzi ya ndako
C'est papa qui est le chef de la maison.
boma moto okoya kotumba ndako pamba
Eteins le feu. Tu risques de cramer la maison.
nakokengela ndaku malamu
Je vais bien surveiller la maison.
mopepe ezali na ndako oyo te
Il n'y a pas d'air dans cette maison.
na ndako na bango batie langi ya pembe
Dans leur maison ils ont mis la peinture blanche.
Nawuti komona bambila mwambe liboso ya ndako.
Je viens de voir 8 policiers devant la maison.
Bongisa ndako. Eza salite makasi.
Arrange la maison. C’est très sale.
nzimbu eza te na ndako na ngai
Il n y a pas d'argent dans ma maison.
nalingi komona lisusu moto ya liboma oyo na ndako na ngai te.
Je ne veux plus voir ce fou dans ma maison.
Bolimbisi papa, kobengana mama na ndako te.
Pardon papa, ne chasse pas maman de la maison.
akokota na kati ya ndako oyo te.
Elle ne va pas entrer dans cette maison.
oyo eza ndako na yo moko
ça c’est ta propre maison
Natambolaki longwa na motuka tii na ndako.
Je marchais (venant) de la voiture vers la maison.
Ndako na ye ezali musika mingi.
Sa maison est très loin.
ndako ya ndele
hutte en paille (paillotte)
tofandi na ndako moko.
Nous habitons dans la même maison.
bima na ndako na ngai !
Sors de ma maison !
autres mots avec le tag 'maison' : mbalasáni, biló, ebáeli, ebutele, ebuteli, efelo, engangala, fúlu, kinkóso, lángi, libóko, lininísa, ndaku, palais, súku, tólo, motóndo, fungóla, efungwelo, ebutelo, kukù, etumbelo, armwár, maluvé, esosele, ngwende, kikóso, linyuka, sabúni, nzongo, zongó, kabiné, wésé, ekuke, mitondo, biró, sabóni
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies