FR EN NL

vertaling / woordenboek Lingala - Nederlands

congo rdc
Zin :

sika
síká
nieuw
huidige
mupepe ya sika pona bana funa
mupepe ya sika pona bana funa
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
mopepe ya sika
mopepe ya sika
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
Congo na biso ya sika
Congo na biso ya sika
src : Isek Kingelez - Youtube
zie ook : sikoyo, sikawa
item 6 voorbeelden (bandakisa motóbá) ...
nasombaki motuka ya sika
Ik kocht een nieuwe auto
tshombo na yo ebongi te ? okosomba ya sika ?
Uw GSM is niet hersteld ? Ga je een nieuwe kopen ?
nazosombela yo motuka ya sika. kobebisa yango te mbala oyo.
Ik koop je een nieuwe auto. Beschadig hem niet deze keer.
osombeli mwasi na yo tshombo ya sika
Je hebt een nieuwe telefoon gekocht voor je vriendin.
bayibi ngai pantalo na ngai ya sika
Ze hebben mijn nieuwe broek gestolen.
mobali na yo ya sika, kombo na ye nani ?
Je nieuwe man, wat is zijn naam ?
oyo
óyo, mv. baoyo (klasse 1a/2 : - / ba-)
eye
oyo : gesproken taal - eye : geschreven taal

aanwijzend (voornaamwoord) :
dat, die, deze
relatief (voornaamwoord) :
...dewelke..., ...die..., ...dat...
Oyo ekomama esi ekomama
Oyo ekomama esi ekomama
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
epekisami kosokola na ebale
epekisami kosokola na ebale
© pvh
zie ook : sikoyo, wana, koteoyo
item 102 voorbeelden (bandakisa nkámá (mókó) na míbalé) ...
Yanola motuna oyo. Yanola na lingala.
Beantwoord deze vraag. Antwoord in het Lingala.
Nabandi kotanga buku oyo
Ik ben begonnen met het lezen van dit boek
Ndaku oyo ekomi kitoko.
Dat huis is mooi geworden.
nayebi tata oyo, kasi nayebi tata wana te.
Ik weet wat deze vader, maar ik weet niet wat vader dan.
balongolaka pongi ya mbwa te. Balamusaka te mbwa oyo azali kolala.
Men onderbreekt de slaap van een hond niet. Men maakt een hond die slaapt niet wakker.
Oyo akotambola na moyibi, akokoma mpe moyibi. Gezegde/uitdrukking (niet letterlijk vertalen)
Diegene die met een dief omgaat zal ook een dief worden.
ezali esengo na ngai po na komona moko na moko na bino na liyangani oyo na sima ya nzanga.
Het is voor mij een genoegen om elk van jullie te zien in deze mis van de namiddag.
tala, oyo ezali ndenge na biso
kijk, dit is onze manier
Bis oyo ekolongwa ntango nini ?
Om welk uur vertrekt die bus ?
Nayebi nzembo oyo.
Ik ken dat liedje.
Soki oyo ezali ya solo, nakufa.
Als dat waar is, sterf ik.
na ntongo oyo mama akeyi na zando asomba mapa
Deze ochtend is mama naar de markt gaan brood kopen.
Limbisa ngai, oyo ekosala mwa pasi.
excuseer mij, dit gaat een beetje pijn doen.
osololi na ye mikolo oyo ?
heb je met hem gepraat deze dagen ?
tshombo oyo opesi ngai ezosala te
De telefoon die je me gegeven hebt werkt niet.
Oyo ezali nsango ya kosunga yo pona koyeba ndenge nini kelasi ya monoko ya Lifalanse etambolaka.
Dit is een informatie om je te helpen om te weten op welke manier de les van de franse taal werkt.
ndaku oyo eleki ndaku kuna na kitoko
Dit huis is mooier dan dat huis daar.
mundele oyo aza mbamba
Die blanke is plakkend (volgt je overal)
basi oyo bazopanza basango ya lokuta
Die meisjes zijn leugens aan het verspreiden
tshombo oyo na mesa... ya yo ?
De GSM hier op de tafel... het is de jouwe ?
Moto oyo akumbaka maki, aswanaka te na abundaka te.
Degene die eieren vervoert kibbelt niet en vecht niet.
boyokani eza na ndako oyo te
Er is geen overeenstemming in dit huis
ozobima mingi mikolo oyo
Je gaat vaak uit deze dagen
tokoki kozala na kimia te na ndako oyo
Men kan niet op zijn gemak zijn in dit huis.
mwasi oyo alingaka koloba mingi te
Die dame houdt niet van veel praten.
babongisi banzela oyo. tokoki koleka na mutuka.
Ze hebben die straten gerepareerd. We kunnen er met de auto door.
nasepeli makasi na elamba oyo okabeli ngai
Ik stelde dat kedingstuk dat je me gaf erg op prijs.
elamba oyo kitoko makasi. posa ya kosomba yango.
Dat kledingstuk is heel mooi. Zin om het te kopen.
lolenge boni ebongi bayebisa yo pona otika komela kisi oyo
Hoe moet men je laten weten om te stoppen met dat medicijn te nemen ?
lolenge boni nakoki koloba na mobali oyo pona atika nga kimia
Hoe kan ik die man spreken zodat hij me gerust laat ?
oyo eza na kati na ngai boyebi te
Wat er in mij zit, dat kenden jullie niet.
nani alie biloko na ngai oyo natikaki ?
Wie heef mijn eten opgegeten dat ik overgelaten had ?
mikolo oyo mbula ezobeta makasi.
Deze dagen regent het hard.
likambo oyo ekosila mokolo nini ?
Welke dag zal dit probleem stoppen ?
mbongo oyo natikalaki na yango napesi yango yaya na yo
I heb het geld dat me overbleef (het geld met hetwelk ik bleef) aan je zus gegeven.
wapi talatala oyo ezalaki awa
Waar is de spiegel die hier was ?
oyo eza ndako na bino, eza ya biso te
Dat is jullie huis, niet het ons.
nazosombela yo motuka ya sika. kobebisa yango te mbala oyo.
Ik koop je een nieuwe auto. Beschadig hem niet deze keer.
nalingaka masanga oyo te eza sukali mingi
Ik hou niet van die drank. Het is te zoet.
soki loboko eyebaka pasi oyo lutu emonaka na tango ya kobalusa biloko
Als de hand zou weten hoe de lepel afziet wanneer hij het voedsel moet roeren...
biloko oyo, mafuta ekoki te. ebongi obakisa.
Dit eten, et is niet genoug olie in. Je moet er toevoegen.
esika oyo ezali salite mingi
Deze plek is zeer vuil.
ebongi obongisa esika oyo. bapaya bazali koya.
Je zou deze plek moeten opruimen. De mensen komen.
nalingaka bana oyo bazalaka boye te
Ik hou niet van kinderen die zo zijn.
ebongi okeba. na zamba oyo baniama bazalaka ebele.
Je moet opletten. In dat woud zijn er veel beesten.
mutu oyo nazolobela azoyoka ngai te. nazoloba mpamba.
De persoon tegen wie ik spreek luistert niet. Ik spreek voor niets.
mwana mwasi oyo azali lokuta monene
Dat meisje is een grote leugenaar.
batu balinga nde kosuana na ndako oyo
De mensen kibbelen echt graag in dit huis.
ebongi kofuta baniongo oyo nioso
Al deze schulden moeten betaald worden.
leki na yo oyo ya mwasi alingaka musala te.
Dat zusje van jouw houdt niet van werken.
na ndako oyo mokonzi azali te. biso nioso tozali bana.
In dat huis is er geen chef. We zijn allemaal kinderen.
muana oyo azuakate na kelasi.
Dat kind is een mislukking in de klas.
nani alambi damage oyo
Wie heeft deze maaltijd bereid ?
katela nga etendi oyo
Snij me die stof
mwana oyo akobotola yo bisikiti
Dat kind zal je koekje afpakken.
nakodinda na mayi oyo
Ik ga in dat water springen.
mopepe ezali na ndako oyo te
Er is geen lucht in dit huis.
na zamba oyo banzoi baza ebele. bokeba !
In dat woud zijn veel bijen. Pas op !
mwana mwasi oyo azalaka monene pe molayi.
Dat meisje is dik en groot.
oyo ezali bilamba ya ndeko na ngai
Dat zijn de kleren van mijn zus.
bangungi oyo bakoki kopesa yo bokono
Die muggen kunnen je een ziekte geven.
mwana oyo azalaka mutu monene penza
Dat kind heeft echt een groot hoofd.
mutu na ye ekokani na oyo ya tata na ye
Zijn hoofd lijkt op dat van zijn vader.
nalie biloko nyonso oyo etikalaki.
Ik heb al het voedsel opgegeten dat overgebleven was.
ebongi totosa mobeko oyo pona tozala na kimia
We moeten die wet respecteren om in vrede te zijn.
mobeko oyo ezali pasi mingi pona kotosa
Die wet is erg moeilijk te respecteren.
nioka moko aswe mwana oyo
Er is een slang die dat kind gebeten heeft
losaka pona biloko oyo oyeli biso
Bedankt voor het voedsel dat je ons gebracht hebt.
losako mingi pona lisalisi oyo.
Veel dank voor die hulp.
mutu moyindo na mutu mondele bazali batu oyo Nzambe akeli.
De zwarte man en de blanke man zijn personen die God gecreëerd heeft.
nayoka nanu nzembo oyo te
Ik heb dat liedje nog niet gehoord.
wapi libonza oyo okobonzela Nzambe ?
Waar is de offerande die je aan God zal offeren ?
kombola esika oyo. salite eza ebele.
Borstel die plaats. Er is veel vuiligheid.
oyo, ezali eloko ya nani ?
dat, wiens ding is dat ?
keba ! okosoka na linzanza oyo.
Pas op ! Je zal je verwonden aan dat blikje.
liyebo yaka kotala liyebo oyo.
Kom deze paddestoel zien.
muana muasi oyo azofiba makata kitoko
pas op - gevoelige inhoud
pona nini mikolo oyo oza kolia kaka madesu ?
Waarom ben je deze dagen enkel bonen aan het eten ?
Oyo wana azokoma kizengi penza.
Die daar wordt gek, echt.
Mikolo oyo nateki te batu bazosomba malamu te mbongo eza te.
Deze dagen verkoop ik niet. De mensen kopen niet goed. Er is geen geld.
Lopango oyo ezali na kombo na ngai
Dit terrein (kavel) staat op mijn naam.
nalingi komona lisusu moto ya liboma oyo na ndako na ngai te.
Ik wil die gek niet meer in mijn huis zien.
mwasi oyo atongelaka yo bilamba ayaki awa.
De dame die kleren voor je maakte (je kleermaakster) is hier gekomen.
luka mwasi moko oyo akolinga yo na bolingo ya solo
Zoek een vrouw die je zal liefhebben met echte liefde.
na balabala oyo bato nyonso bazoloba ke oza kitoko.
In deze straat zegt iedereen dat je mooi bent.
mama, mela bakisi na yo oyo munganga apesi.
Mama, neem je medicijnen die de dokter je voorgeschreven heeft.
Mikolo oyo aza kokanga suki te.
De laatste tijd vlecht ze haar haar niet.
kelasi oyo ezali penza mindondo.
Die school is echt moeilijk.
Oyo nde oza kobenga " kolata malamu " ?
Is dát wat je noemt " goed kleden " ?
oza kosala nini libanda na ngonga oyo ?
Wat doe je buiten op dit uur ?
akokota na kati ya ndako oyo te.
Ze zal dit huis niet binnen treden.
meka nanu kotanga oyo.
Probeer al dat te lezen.
Mbula oyo tokosiba na masoko. Libolo ekomi mayi mayi.
pas op - gevoelige inhoud
kobosana te, soki omeki kobimisa sekele oyo tokobeta yo !
Vergeet niet, als je probeert om dit geheim naar buiten te brengen, zullen we je slaan !
oyo eza ndako na yo moko
dat is je eigen huis
balabala eza nzela oyo mituka ekoki koleka.
Een straat is een weg waar voertuigen door kunnen.
naza na posa ya koyoka atalaku oyo ayembaka epayi ya Koffi
Ik heb zin om te luisteren naar de zanger die (de namen) zingt bij Koffi.
Mwana oyo libota naye basundola ye po akoma bulawayo.
Dat kind, haar famillie heeft haar in de steek gelaten omdat ze prostituee is geworden.
Nalembi koliya bazoka oyo po epesi nga mbanga pasi
Ik ben het beu deze kauwgom te eten, hij geeft me kaakpijn.
Mbisi oyo epoli. Bankusu batondi na kati.
Die vis is rot. Er zwermen maden in.
Oyo ekomama esi ekomama
Wat geschreven staat, staat al geschreven
Liboso kolongola bipoti na lisu ya moninga longola nanu oyo eza na lisu na yo
Vooraleer het verwijderen van de kortsjes van de ogen van een vriend, verwijder al deze die jouw ogen zijn.
e-mail : dic@lingala.be
 

interessante filmpjes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privéleven & cookies