FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

asalaka
asalaka, form of a verb
kosála, regular construction (root : sal) (class 15 : ko- (verbs))
to work
to do, to make
to create
to act

kosálisa
to make do
to help, to take care of

kosálela
to work for...
to use
Eloko nini esalaka yo fier ?
Eloko nini esalaka yo fier ?
© pvh
ekosala eloko te
ekosala eloko te
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
zala na kondima. soki maman asali, yo pe sala
zala na kondima. soki maman asali, yo pe sala
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
esala pe eloko te
esala pe eloko te
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
basalaka confiance na ndoki te
basalaka confiance na ndoki te
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
kosalisa moto ezali niongo te
kosalisa moto ezali niongo te
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
limbola !
limbola !
src : google images
derived words : mosáli, kosalema, lisálísí, mosálisi, esalele, mosáleli
see also : kosunga
item 59 examples (bandakisa ntúkú mítáno na libwá) ...
asali ngai mabe
he did something bad to me
nakei kolala! Lobi okosala nini na pokwa ?
I'm going to sleep ! What will you do tomorrow evening ?
kosala mesa.
To dress the table
kati ya tata na mama na yo, nani asalaka ?
Between your father and your mother, who works ?
poso ekoya mokolo moko eza nakosala te.
Next week, there's a day that I don't work.
asalaka te, atangaka
he doesn't work, he studies
sala noki !
Do (it) fast !
Salisa ngai, nazoyoka libumu mpasi.
Help me, I have stomach pain.
osalisi ngai badepense nzoka zemi ya elephant. Limbola !
You made me make expenses, even though the pregnancy was from the elephant. Explain !
loba nakoyoka, tinda nakosala
Speak, I shall listen. Send, I shall do.
Limbisa ngai, oyo ekosala mwa pasi.
excuse me, this will hurt a bit.
ndenge ya komibatela : na capote. Nzela ya malamu koleka mpo na komibatela ezali kosalela capote
the way to protect oneself : with a condom. The best method to protect oneself is to use a condom.
salela ngai bikamwa
do me a miracle
tshombo oyo opesi ngai ezosala te
The phone that you gave me doesn't work.
soki nazokaka, ( mbele ) olingaki kosala nini
If I were hurt, ( then ) what did you want to do ?
Na motema nayebaki ete ezali mabe, kasi namonaki ndenge mosusu ya kosala te.
In the heart I knew it was bad, but I saw no other way of acting.
ozosala nini ? - Eloko te, naza na mbetu na ngai
What are you doing ? - Nothing, I'm in my bed.
Nasala nini soki papa to mama amelaka bangi to alangwaka masanga
what to do when papa or mama smokes weed or is getting drunk with beer ?
Peter azalaki kosala na kompani ya kemi.
Peter worked at a chemical company.
Namoni ozangi eloko ya kosala. Luka ata mosala ko ! kaka koyungana boye...
I see that you lack something to do. Look even for a job, come on ! just wandering like that...
kosala bipale
to make gestures
noko na ngai asali mobembo na belejika
My uncle made a trip to Belgium.
naza na makambo ebele ya kosala lelo
I have a lot of things to do today.
kosala ngai mabe te pona nalingi yo
Don't make me suffer because I love you
kosala ye bongo te pamba te akosilika
don't do that to her or else she will get angry
eloko basalela naza na posa na yango te
The thing that had been used, I don't need it
nzambe alingi tolingana pe tosalisana
God wants us to love each other and to help each other
atie ngai pili-pili na liso. ezosala pasi.
She put pepper in my eye. It hurts.
tozali lisusu na mayi te, mwinda te. sikoyo tokosala ndenge nini
We have no more water, no light. How will we work now ?
koya lelo te. naza na makambu ebele ya kosala
Don't come today. I have a lot of things to do.
Nzambe akosala makambo ya minene.
God will do great things.
sala yango pona ngai, bolimbisi.
Do it for me, please.
kaka ngai nde nazosala misala nioso ya ndako
There's only me who does the all the chores of the house .
loboko na yo kitoko penza. ebongi kaka osala manzaka.
Your hand is really beautiful. You should just do your nails.
pona nini ozali kosala boye, penza ?
Why do you do like this, really ?
olingi nasalela yo liki ?
Would you like me to make you an egg ?
kofuta ngai te. nasali yango ofele.
Don't pay me. I do that for free.
pona nini ozali kosala ndeko na yo bongo
Why do you do like this to your sister ?
boseka ngai, ekosala eloko te
make fun of me, it won't do anything.
sala noki, ngai nazobima sikoyo.
Be quick, I'm going out now.
oza nanu elenge. kosala yango te. okoya kobebisa bomoi na yo.
You are still young. Don't do that. You risk spoiling your life.
nazosala mikate ya moto
I'm making hot fritters.
bazali kosala ye epasoli ya mbanga.
They will do him a jaw operation.
tika kosala mokinza.
Stop farting.
ngai nasalaka kindumba te.
Me, I don't do prostitution.
alingi ke nasala buku ya liwa na ngai
She wants me to make my will (testament).
naza kosala makambo ebele tango moko.
I'm doing a lot of things at the same time.
ndenge nini bosalaki pona boyiba mbongo na ngai ?
How did you do it to steal my money ?
yo, makambo osali ezali pe malamu te
You, the things you did weren't good either.
nasali kaka mikate zomi.
I only made 10 fritters.
yaya na ngai pe asalaka manzaka.
My sister also does nails.
Aza kosala makelele makasi.
She's making loud noise.
sala nyonso olingi po nakuta ye awa te !
Do everything you want so that I don't find her here.
oza kosala nini libanda na ngonga oyo ?
What are you doing outside at this hour ?
Ndenge nini osali pona kokota awa ?
How did you do it to enter here ?
olingi nasala yo pe manzaka ?
Do you want me to do your nails too ?
Tango naza kosala mosala nalingaka moto atungisa ngai te.
When I'm working, I don't like someone disturbing me.
Mobali nabala akeyi kosala ekobo. Abimi na ndeko nga.
The guy I married went to do adultery. He went out with my sister.
nani asali foti
who made a mistake ?
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies