FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

mbote
mbóte, pl. bambote (class 9/10 (2) : - / - (ba-) : plural invariable from context (or informal/modern ba-))
greetings
hello
mbote
mbote
src : google images
item 13 examples (bandakisa zómi na mísáto) ...
mbote ! ntango molai ! sango nini ?
Hi ! Long time ! What news?
Natindeli bino nyonso mbote mingi.
I send you all much greetings.
Soki okokoma kuna, pesa bango mbote.
When you arrive there, greet them (give them greetings).
pesa mbote na libota na yo
Greet your family
pesa ye mbote / pesa bango mbote
greet him / greet them
mbote na bino. mbote na yo.
Greetings to you (plural). Greetings to you (singular).
mbote, boni nzoto ? nga naza malamu. nalingaki kaka napesa yo mbote
Hello, how's the body (the health) ? I'm doing well. I just wanted to greet you.
Mbote papa. Boni ? - Ngai malamu. Bongo yo ? - Ngai mpe malamu.
Hi mister. How are you ? - Me, I'm good. And you then ? - Me too, I'm good.
mbote, molingami na kati ya nkolo
greetings, beloved in the Lord
oye, opesi biso ata mbote te. likambo nini ?
You came, you didn't even salute us. What's the matter ?
kopesa mutu mbote ezali ofele
To greet someone is free.
mbote, bolingo na ngai.
Hello, my love.
Mbote. Boni ? - Ngai malamu, ebongo yo ? - Ngai pe malamu.
Hello. How are you ? - Me good, and you ? - Me too good.
1000
nkóto (mókó)
item Article : Counting and numbers
P.S. you can just enter any number on this site and it will be translated into lingala

0
zero (0)libungutulu, eloko te (nothing)

1-10
1mókó
2míbalé
3mísáto
4mínei
5mítáno
6motóbá
7nsambo
8mwámbe
9libwá
10zómi

powers of 10
10zómi
100nkámá (mókó)
1000nkóto (mókó)
10000monkoko (mókó)
20000minkoko míbalé
100000elundu (mókó)
1000000efuku (mókó)

for milion, you'll also hear : efuku, makiasi, epuna

11-99
11zómi na mókó
15zómi na mítáno
20ntúkú míbalé
21ntúkú míbalé na mókó
32ntúkú mísáto na míbalé
43ntúkú mínei na mísáto
54ntúkú mítáno na mínei
67ntúkú motóbá na nsambo
78ntúkú nsambo na mwámbe
89ntúkú mwámbe na libwá
95ntúkú libwá na mítáno

100-1.000
100nkámá (mókó)
101nkámá (mókó) na mókó
110nkámá (mókó) na zómi
115nkámá (mókó) na zómi na mítáno
120nkámá (mókó) na ntúkú míbalé
126nkámá (mókó) na ntúkú míbalé na motóbá
157nkámá (mókó) na ntúkú mítáno na nsambo
200nkámá míbalé
201nkámá míbalé na mókó
210nkámá míbalé na zómi
222nkámá míbalé na ntúkú míbalé na míbalé
500nkámá mítáno
753nkámá nsambo na ntúkú mítáno na mísáto

1.000-10.000
1000nkóto (mókó)
1234nkóto (mókó) na nkámá míbalé na ntúkú mísáto na mínei
9875nkóto libwá na nkámá mwámbe na ntúkú nsambo na mítáno

other examples
9libwá
39ntúkú mísáto na libwá
539nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
7539nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
47539minkoko mínei na nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
847539bilundu mwámbe na minkoko mínei na nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
6847539bifuku motóbá na bilundu mwámbe na minkoko mínei na nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá

e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2017 lingala facile 2018
privacy & cookies