FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

mibale
míbalé
deux (2)
mibale
mibale
© pvh
tags :
item 18 exemples (bandakisa zómi na mwámbe) ...
bozalaki mibale, wapi mosusu ?
vous étiez 2, ou est l'autre ?
tuku mibale na motoba
deux dizaines et six : vingt-six (26)
bilembo mibale
deux points
eyenga eleki nayaki na liyangani ya mibale
le dimanche passé je suis venu au deuxième culte
Bolingo na biso mibale ekosila te.
L'amour entre nous deux ne terminera pas.
Namiswaki lolemu kotala batambolaki bango mibale.
Je me suis mordu la langue de voir marcher ces deux.
lopango na bango ekabwání na biténi mibale.
Leur parcelle est divisée en deux parties.
bantaba mibale wana ! moko ntaba ya pembe, mosusu ntaba ya moyindo
Il y a deux chèvres là-bas ! Une chèvre blanche, une autre chèvre noire
naza na bana misato: mwasi moko na mibali mibale
J'ai trois enfants: une fille et deux garçons
nalobaka minoko mibale
Je parle deux langues
bino mibale bolingani mingi
Vous deux vous vous aimez beaucoup.
asombi tukutuku mususu. akomi na yango mibale.
Elle a acheté une autre moto. Elle en a maintenant deux.
oza na bana mwambe na bakoko mibale.
Tu as 8 enfants et 2 petits-enfants.
nazokende na Kinshasa pona sanza mibale
Je pars à Kinshasa pour deux mois.
Soki bato mibale bayokani te ebongi bakabwana.
Si deux personnes ne s’entendent pas ils doivent se separer.
banda mikolo mibale azolia te.
Depuis deux jours elle ne mange pas.
ngai nalingaka kobota bana mibale kaka
Moi j'aimerais mettre seulement deux enfants au monde.
Yezu azalaka na baapostolu zomi na mibale
Jésus avait douze (12) apôtres.
item Article : Compter et chiffres
P.S. vous pouvez introduire un numero dans ce site, et il vous le traduira en lingala

0
zero (0)libungutulu, eloko te (rien)

1-10
1mókó
2míbalé
3mísáto
4mínei
5mítáno
6motóbá
7nsambo
8mwámbe
9libwá
10zómi

puissance de 10
10zómi
100nkámá (mókó)
1000nkóto (mókó)
10000monkoko (mókó)
20000minkoko míbalé
100000elundu (mókó)
1000000efuku (mókó)

pour million on dit aussi : efuku, makiasi, epuna

11-99
11zómi na mókó
15zómi na mítáno
20ntúkú míbalé
21ntúkú míbalé na mókó
32ntúkú mísáto na míbalé
43ntúkú mínei na mísáto
54ntúkú mítáno na mínei
67ntúkú motóbá na nsambo
78ntúkú nsambo na mwámbe
89ntúkú mwámbe na libwá
95ntúkú libwá na mítáno

100-1.000
100nkámá (mókó)
101nkámá (mókó) na mókó
110nkámá (mókó) na zómi
115nkámá (mókó) na zómi na mítáno
120nkámá (mókó) na ntúkú míbalé
126nkámá (mókó) na ntúkú míbalé na motóbá
157nkámá (mókó) na ntúkú mítáno na nsambo
200nkámá míbalé
201nkámá míbalé na mókó
210nkámá míbalé na zómi
222nkámá míbalé na ntúkú míbalé na míbalé
500nkámá mítáno
753nkámá nsambo na ntúkú mítáno na mísáto

1.000-10.000
1000nkóto (mókó)
1234nkóto (mókó) na nkámá míbalé na ntúkú mísáto na mínei
9875nkóto libwá na nkámá mwámbe na ntúkú nsambo na mítáno

autres examples
9libwá
39ntúkú mísáto na libwá
539nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
7539nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
47539minkoko mínei na nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
847539bilundu mwámbe na minkoko mínei na nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
6847539bifuku motóbá na bilundu mwámbe na minkoko mínei na nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá

autres mots avec le tag 'compter' : efúku, elóko, elúndu, nkámá, libosó, libwá, míbalé, mínéi, mísáto, mítáno, mwambi, mokó, motoba, ndámbu, nkóto, sambo, tuku, zómi, kotánga, misátu, ndámbo, moambe, mwambe, mineyi, epúná, makiasi, nsambo, kámá, libúngútulú, kóto, libua, miliale, milioni, mokama, yambo, monkoko
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies