FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

yango
yangó
ça
ce, cet, cette, celle,celui,... (... en question)
(objects et animaux)

dans le Lingala stricte
pronom démonstratif pour les classes en n- et e-
tags :
item 29 exemples (bandakisa ntúkú míbalé na libwá) ...
Mbula enokelaka ndaku ya moninga omoni yango moke, kasi mokolo ekonokela yo ekomi matata. Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
Quand il pleuvait sur la maison de ton ami, tu trouvais ça insignifiant, mais le jour que c'est tombé sur toi c'est devenu un problème.
Pilipili ya elanga ya yo, moto mosusu akolia yango. Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
Le piment de ton champs, quelqu'un d'autre le mangera
Namonaki ndunda yango mbala ya liboso.
Je voyais ce légume pour la première fois.
Moto azoya, bomba yango nokinoki.
Quelqu'un arrive (est en train de venir), cache ça vite vite.
yango wana
c'est pourquoi ...
nzete ya mbuma, makasa na yango ekweyi
L'arbre fruitier, ses feuilles sont tombées.
bozela nalimbolela bino yango malamu. © Bienvenu Sene Mongaba - Fwa-ku-Mputu
attendez que je vous explique ça bien.
eloko nalakisa te. Nalingi yo. Nabombi yango na kati ya motema na ngai.
Il y a une chose que je ne montre pas. Je t'aime. J'ai caché ça dans mon coeur.
nakoki komona yango ?
Je peux voir ça ?
baboti na yo bayaki kobwaka ngunda na poto. yango wana sikoyo oza awa na biso.
Tes parents sont venus demander asile en europe. La raison pour laquelle maintenant tu es ici avec nous.
Bazali kobatela mino malamu te, mosusu esila ngala mpe mosusu balambi yango na ndenge elongobani te.
On ne conserve pas bien les médicaments, d'autres sont expirés et d'autres sont préparés des façons non conformes.
bizaleli nini yango wana ?
C'est quoi ce comportement là ?
yango wana...
c'est pourquoi...
eloko basalela naza na posa na yango te
le truc qu'on a utilisé, je n'en ai pas besoin
elamba oyo kitoko makasi. posa ya kosomba yango.
Cet habit est très joli. Envie de l'acheter.
sala yango pona ngai, bolimbisi.
Fais ça pour moi, stp.
mbongo oyo natikalaki na yango napesi yango yaya na yo
j'ai donné l'argent qui me restait à ta soeur.
otie biloko na ngai wapi. nazomona yango te.
Tu as mis tes affaires où ? Je ne les vois pas.
nazosombela yo motuka ya sika. kobebisa yango te mbala oyo.
Je t'achète une nouvelle voiture. Ne l'abime pas cette fois-ci.
kofuta ngai te. nasali yango ofele.
Ne me paie pas. Je fais ça gratuit.
oza nanu elenge. kosala yango te. okoya kobebisa bomoi na yo.
Tu es encore jeune. Ne fais pas ça. Tu risques de gâcher ta vie.
asombi tukutuku mususu. akomi na yango mibale.
Elle a acheté une autre moto. Elle en a maintenant deux.
oza na posa ya koboya yango to oza na posa ya kondima ?
Tu as envie de réfuser de faire ça ou tu as envie d’accepter ?
kotika mulangi polele te. kanga yango.
Ne laisse pas la bouteille ouverte. ferme-la.
bilamba yango eza talo penza.
Ces vêtements sont vraiment cher.
bafoto yango ebimi kitoko te.
Ces photos là ne sont pas sorties très belles.
Nalingi ata kokanisa yango te.
Je ne veux même pas penser à ça.
lisolo yango eza kitoko penza.
Cette histoire est très belle.
Petite yango aza danzer.
Cette jeune fille est " très jolie "
item Article : pronoms
pronoms
Singulier
1 moi ngai
2 toi yo
3 lui (ça) ye (yango)
Pluriel
1 nous biso
2 vous bino
3 eux (ces choses) bango (yango)

conjugaison
Singulier
1 je namoni je vois
2 tu olingi tu aimes
3 il / elle alingi il / elle aime
Pluriel
1 nous tolingi nous aimons
2 vous bolingi vous aimez
3 ils / elles balingi ils / elles aiment
Objets (S & P)
3 ca etali (yo) ca (te) regarde
autres mots avec le tag 'pronom' : ba, bangó, bínó, bísó, bo, e, ngai, o, yangó, ye, yo, to, na, nango
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies