FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

bino
bínó
vous
Nzambe apambola bino
Nzambe apambola bino
src : google images
voir aussi : bísó
tags :
item 19 exemples (bandakisa zómi na libwá) ...
Ntaba na bino elekaki awa.
Vos chèvres sont passées (par) ici.
ezali esengo na ngai po na komona moko na moko na bino na liyangani oyo na sima ya nzanga.
C'est pour moi une joie de revoir chacun de vous dans ce culte de l'après midi.
mama na bino, kombo na ye nani ?
Votre maman, c'est quoi son nom ?
Natindeli bino nyonso mbote mingi.
Je vous envoi tous beaucoup de salutations.
Nzambe apambola bino mingi. Kimia ezala na bino. Nzambe abatela bino.
Que Dieu vous bénisse en abondance. Que la paix soit avec vous. Que Dieu vous garde.
bozela nalimbolela bino yango malamu. © Bienvenu Sene Mongaba - Fwa-ku-Mputu
attendez que je vous explique ça bien.
mbote na bino. mbote na yo.
Salut à vous. Salut à toi.
wana eza biloko ya papa na bino.
ça là c'est la nourriture de votre père.
biso na bino, tozali bana ya tata moko na mama moko
nous et vous, nous sommes des enfants du même père et de la même mère.
tozali koya epayi na bino sikoyo
On arrive bientôt chez vous.
oyo eza ndako na bino, eza ya biso te
ça c'est votre maison, ce n'est pas la notre.
ngai pe nalingi koya na bino
Moi aussi je veux venir avec vous.
epayi na bino nde makelele ezalaka makasi.
Il y a beaucoup de bruit chez vous.
bolakisi bilamba na bino te
Vous n'avez pas montré vos vêtements.
bino mibale bolingani mingi
Vous deux vous vous aimez beaucoup.
nayeli bino nsango ya malamu. boyoka.
Je vous ai apporté une bonne nouvelle. écoutez.
Mwana na bino alingi kotanga mingi
Votre enfant veut beaucoup étudier.
aza mwasi ya ndeko na bino.
C’est la femme de votre frère
Mutu akweyi. Bino boseki ye.
Quelqu'un est tombé. Vous vous moquez de lui.
item Article : pronoms
pronoms
Singulier
1 moi ngai
2 toi yo
3 lui (ça) ye (yango)
Pluriel
1 nous biso
2 vous bino
3 eux (ces choses) bango (yango)

conjugaison
Singulier
1 je namoni je vois
2 tu olingi tu aimes
3 il / elle alingi il / elle aime
Pluriel
1 nous tolingi nous aimons
2 vous bolingi vous aimez
3 ils / elles balingi ils / elles aiment
Objets (S & P)
3 ca etali (yo) ca (te) regarde
autres mots avec le tag 'pronom' : ba, bangó, bínó, bísó, bo, e, ngai, o, yangó, ye, yo, to, na, nango
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies