FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

biso
bísó
nous
po na biso-biso se na SKOL
po na biso-biso se na SKOL
© unibra
pona sante na biso
pona sante na biso
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
biso na biso (radio)
biso na biso (radio)
src : google images
biso na biso (restaurant)
biso na biso (restaurant)
src : google images
bis<u>s</u>o na bis<u>s</u>o (groupe)
bisso na bisso (groupe)
src : google images
Congo na biso
Congo na biso
src : google images
ndako ya biso
ndako ya biso
© ndako ya biso
Congo na biso ya sika
Congo na biso ya sika
src : Isek Kingelez - Youtube
voir aussi : bínó
tags :
item 37 exemples (bandakisa ntúkú mísáto na nsambo) ...
biso toza koyoka malili na elanga na biso ya lokuta.
Nous, nous avons froid avec notre fausse saison sêche.
Biso tozali awa, bango bazali kuna.
Nous, nous sommes ici, eux, ils sont là-bas
tala, oyo ezali ndenge na biso
regarde, ceci est notre méthode
Bolingo na biso mibale ekosila te.
L'amour entre nous deux ne terminera pas.
biso na biso
entre nous
bomoni momie wana ? azokosa biso. nakotchoukouté !
Vous voyez la nana là-bas ? Elle est en train de nous mentir. Je vais la tchoukouter !
baboti na yo bayaki kobwaka ngunda na poto. yango wana sikoyo oza awa na biso.
Tes parents sont venus demander asile en europe. La raison pour laquelle maintenant tu es ici avec nous.
tata wa biso
Notre Père (prière)
Bolingo ya Kristo ezali kotambwisa biso © 2 bakorentien 5:14
L'amour du Christ nous presse
nzambe apesa biso bonsomi ya kopona
Que Dieu nous donne la liberté de choisir
bolingo ezali kati na biso soki tozali na bomoko
Il y a l'amour entre nous si nos sommes en unité
obebisi bolingo na biso
Tu as gâché notre amour
tokosenga epayi ya Nzambe abatela biso ti na suka ya sanza.
Nous allons demander à Dieu qu'Il nous protège jusqu'à la fin du mois.
awa tosalaka kaka na baboti na biso
Ici nous some qu'avec nos parents
kokota epayi na biso boye te
N'entre pas chez nous comme ça.
biso na bino, tozali bana ya tata moko na mama moko
nous et vous, nous sommes des enfants du même père et de la même mère.
oyo eza ndako na bino, eza ya biso te
ça c'est votre maison, ce n'est pas la notre.
oye, opesi biso ata mbote te. likambo nini ?
Tu es venu, tu ne nous a même pas salué. Qu'est-ce qu'il y a ?
mama na biso atekaka lipa na balabala na biso
Ma mère vend du pain dans notre rue.
tofandi na biso libanda. tozobeta masolo.
Nous sommes assis entre nous dehors. On est en train de causer.
na ndako oyo mokonzi azali te. biso nioso tozali bana.
Dans cette maison il n'y a pas de chef. Nous sommes tous des enfants.
maman akabuani na papa na biso
Maman s'est séparée de notre papa.
lelo baza kopola biso toza kolonga
Aujourd'hui ils sont en train de perdre et nous on gagne.
lelo ezali mokolo ya mbotama ya koko na biso ya mwasi.
Aujourd'hui c'est le jour de l'anniversaire de ma grand-mère.
kapita na biso akangi muyibi
Le chef des travailleurs a attrappé un voleur.
bapaya zomi baye kotala biso
10 visiteurs sont venus nous voir.
mama kulutu na biso azalaka baba.
Ma grande-tante maternelle est sourde-muette.
maman nkulutu na biso azobela makasi
La grande soeur de ma mère est très malade.
papa nkulutu na biso azalaka mutema mabe
Le grand frère de ma mère est méchant.
losaka pona biloko oyo oyeli biso
Merci pour la nourriture que tu nous as apportée.
molimo mosantu yaka osunga biso.
Saint Esprit vient nous aider.
Nganga-Nzambe ateyi biso bolimbisi lelo.
Le pasteur nous a prêché le pardon aujourd’hui.
Yaka na moziki na biso.
Viens à notre levée de fonds.
Oza kotungisa biso, tozali na lisanga ya libota.
Tu nous déranges, nous sommes en réunion de famille.
Soki olingi ke libala na biso ezala malamu, tika kokengela ngai.
Si tu veux que notre mariage soit bien, arrête de me surveiller.
Tinda texto na moto moko ya kelasi na biso
Envoie un sms à une personne de notre classe
na ntongo tolingaka matoko na biso.
le matin nous enroulons d'habitude nos nattes.
item Article : pronoms
pronoms
Singulier
1 moi ngai
2 toi yo
3 lui (ça) ye (yango)
Pluriel
1 nous biso
2 vous bino
3 eux (ces choses) bango (yango)

conjugaison
Singulier
1 je namoni je vois
2 tu olingi tu aimes
3 il / elle alingi il / elle aime
Pluriel
1 nous tolingi nous aimons
2 vous bolingi vous aimez
3 ils / elles balingi ils / elles aiment
Objets (S & P)
3 ca etali (yo) ca (te) regarde
autres mots avec le tag 'pronom' : ba, bangó, bínó, bísó, bo, e, ngai, o, yangó, ye, yo, to, na, nango
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies