FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

lelo
leló
aujourd'hui
...
...
src : google images
lelo te, lobi te, un jour ?
lelo te, lobi te, un jour ?
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
Okokende wapi soki okufi lelo
Okokende wapi soki okufi lelo
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
internet, kala na lelo
internet, kala na lelo
© Vodacom DRC
lobi eleki, lelo, lobi !
lobi eleki, lelo, lobi !
© bbc.com
tags :
item 36 exemples (bandakisa ntúkú mísáto na motóbá) ...
Lelo ezali mokolo ya suka. Lobi ezalaki mokolo ya liboso.
Aujourd'hui est le dernier jour. Hier était le premier jour.
Natiki komela likaya banda lelo.
J'arrête de fumer à partir d'aujourd'hui.
lelo mokolo nini ?
On est quel jour aujourd'hui ?
Lelo ya yo, lobi ya moninga. Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
Aujourd'hui c'est pour toi, demain pour ton prochain.
Po na nini mibali ya lelo balingi lisusu te babotine ?
Pourquoi les hommes d'aujourd'hui ne veulent plus les préservatifs ?
biloko na ngai ? tii lelo !?
Mes affaires ? Jusqu'aujourd'hui !?
tozalaki awa epai na nga na Valentine na Rachel. Bakomaki lelo na nzanga.
Nous étions ici chez moi avec Valentine et Rachel. Elles étaient arrivées aujourd'hui à midi.
buka lelo lamba lelo Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
lit: recolte aujourd'hui, prépare aujourd'hui. (fig: draguer aujourd'hui, coucher ensemble aujourd'hui)
naza na posa ya komona yo lelo
J'ai envie de te voir aujourd'hui
naza na makambo ebele ya kosala lelo
J'ai beaucoup de choses à faire aujourd'hui.
kopesa ngai kanda te lelo
ne m'énerve pas aujourd'hui
boni lelo oye tongo boye ? likambo ?
Comment ça se fait que tu es venu si tot ? Il y a un problème ?
naza na esengo makasi pamba te nakobima na baninga na ngai na pokwa ya lelo
Je suis dans la grande joie car je vais sortir avec mes copines ce soir.
tata na yo azoya lelo kotala yo
Ton père vient te voir aujourd'hui.
koya lelo te. naza na makambu ebele ya kosala
Ne viens pas aujourd'hui. J'ai beaucoup de choses à faire.
mbula ekobeta lelo te. kobanga te.
Il ne va pas pleuvoir aujourd'hui. N'ai pas peur.
lelo ezali mokolo ya mbotama ya yesu
Aujourd'hui c'est le jour de naissance de Jésus.
oza kolamba biloko nini lelo ?
Tu prépares quoi aujourd'hui ?
kolata bilamba na ngai lelo te. lata ya yo.
Ne porte pas mes vêtements aujourd'hui. Porte les tiens.
lelo baza kopola biso toza kolonga
Aujourd'hui ils sont en train de perdre et nous on gagne.
lelo ezali mokolo ya mbotama ya koko na biso ya mwasi.
Aujourd'hui c'est le jour de l'anniversaire de ma grand-mère.
na butu ya lelo naloti ndoto moko ya mabe
Cette nuit j'ai fait un mauvais rêve.
na ndoto na ngai ya lelo ozalaki wana.
Dans mon rêve d'aujourd'hui tu étais là.
kokende na ebale lelo te mbonge eza makasi
Ne va pas au fleuve aujourd'hui. Les vagues sont fortes.
bato misato bayaki koluka yo lelo
Trois hommes sont venu te chercher aujourd'hui.
mateya ya lelo ezalaki kitoko penza.
La prédication d’aujourd’hui était très bien.
Nganga-Nzambe ateyi biso bolimbisi lelo.
Le pasteur nous a prêché le pardon aujourd’hui.
naza na libonza pona eyenga ya lelo te
Je n’ai pas d’offrande pour le culte d’aujourd’hui.
liteya ya lelo ezalaki ndenge nini ?
La prédication d’aujourd’hui était comment ?
lelo moyi eza te. Tokobima ndenge nini ?
Aujourd’hui il n’y a pas de soleil. On va sortir comment ?
Akoya lelo lisusu te. Akoya kaka lobi.
Elle ne viendra plus aujourd’hui, elle viendra que demain.
lelo naza penza na posa na yo te.
Aujourd’hui je n’ai vraiment pas besoin de toi.
lelo, soki obeti ye, ngai nakoboma yo !
Aujourd’hui, si tu la frappes, moi je vais te tuer !
lelo natatoli : " nalingi yo ". © Dena Mwana
Aujourd'hui je proclame : " je t'aime ".
Akobima mbuma lisu lelo.
Il va sortir les yeux. (être surpris)
okokende wapi soki okufi lelo
Tu iras où si tu meurs aujourd'hui ?
item Article : dates
Les temps/dates

Les jours de la semaine
1Lundimokolo ya liboso / mokolo ya yambo
2Mardimokolo ya mibale
3Mercredimokolo ya misato
4Jeudimokolo ya minei
5Vendredimokolo ya mitano
6Samedimokolo ya póso / mokolo ya saba / mokolo wa kombo
7Dimanchemokolo ya eyenga / mokolo ya lomingo


Les mois
1janviersanza ya liboso / yambo
2févriersanza ya mibale
3marssanza ya misato
4avrilsanza ya minei
5maisanza ya mitano
6juinsanza ya motoba, yuni
7juilletsanza ya sambo, yuli
8aoûtsanza ya moambe
9septembresanza ya libwa
10octobresanza ya zomi
11novembresanza ya zomi na mókó
12decembresanza ya zomi na mibalé


année
année 2018 mobu mwa nkóto míbalé na zómi na mísáto

mobu ya 2018


Divers
jourmokolo
semainempóso
moissanza
annéemobu/mbula/mpela
soirmpokwa
nuitbutu
midinzanga
matinntongo
aujourd'huilelo
hierlobi (eleki)
demainlobi (ekoya)

Au Congo, près de l'équateur, il n'y a pas 4, mais 2 saisons.

Les saisons
saison sèchetángo ya elanga, tango ya malili
saison de pluietángo ya mbúla, tango ya mvula, tango ya moto
autres mots avec le tag 'temps' : leló, lóbí, mbúla, mobú, mokolo, moyi, ngonga, mpókwa, sanza, tango, mói, mpóso, póso, ndéle, nzángá, pókwa, manáka, mvula, pokua, mukolo, mbúla, er, kombo, sánzá, yulí, yuní
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies