FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

baninga
baninga, forme d'un verbe
koninga, construction régulière (racine : ning) (classe 15 : ko- (verbes))
agiter

koningana
bouger, être en mouvement, se secouer

koningisa
bouger, mouvoir
secouer, faire bouger
extorquer
item 2 exemples (bandakisa míbalé) ...
Akufaki mpo na koningana ya mabele.
Il est mort à cause d'un tremblement de terre.
ntango mosusu boninga elekaka bondeko
Parfois l'amitié dépasse le lien familiale
pluriel de "móníngá"
móníngá, pl. baninga (classe 1/2 : mo- (mu-) / ba- (personnes))
ami(e), copain, camarade, semblable, prochain
sepela na kozua ya moninga, motema mabe efutaka te
sepela na kozua ya moninga, motema mabe efutaka te
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
sepela na kozua ya moninga
sepela na kozua ya moninga
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
voir aussi : molingami
item 20 exemples (bandakisa ntúkú míbalé) ...
Mbula enokelaka ndaku ya moninga omoni yango moke, kasi mokolo ekonokela yo ekomi matata. Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
Quand il pleuvait sur la maison de ton ami, tu trouvais ça insignifiant, mais le jour que c'est tombé sur toi c'est devenu un problème.
Pesa losako na baninga na yo.
Salue tes amis.
Lelo ya yo, lobi ya moninga. Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
Aujourd'hui c'est pour toi, demain pour ton prochain.
Soki omonaka nzoto ya yo kilo, tala ya baninga se bongo Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
Si tu regardes ton corps avec respect, regarde celui de ton voisin juste comme ça
soki moninga abali, sepela
Si un ami se marie, réjouis-toi
ezali te po tomelaka na nganda moko, nde tokomi baninga
ce n'est pas parce que nous avons l'habitude de boire dans le même café, que nous sommes devenu amis
bayebaka moninga malamu na tango ya pasi.
On connait le bon ami dans les mauvais moments.
moninga na nga aza na bokono
Mon ami est malade
naza na esengo makasi pamba te nakobima na baninga na ngai na pokwa ya lelo
Je suis dans la grande joie car je vais sortir avec mes copines ce soir.
koya na moninga na yo wana te. nalingaka ye te.
Ne viens pas avec ton ami là. Je ne l'aime pas.
mama ya moninga na ngai moko akufi
La maman d'une de mes amies est morte.
baninga na ngai nioso bazali na motuka. etikali kaka ngai
Tous mes amis ont une voiture. Il reste que moi.
yesu nde moninga malamu.
C'est Jésus le bon ami.
baninga na ye babwaki ye na libulu moko
Ses amis l’on jeté dans un trou.
Aza moninga na ngai ya bomuana.
Il est mon ami d'enfance.
nayebi te esika nini moninga na ngai akendaki kolokota ye wana.
Je ne sais pas où mon ami a été ramasser celle-là
moninga na ye wana ya mundele apesaka ngai kanda.
Sa copine blanche là m’énerve.
aza moninga na ngai te.
Elle n’est pas mon amie.
moninga ya mosala
collègue de travail
Liboso kolongola bipoti na lisu ya moninga longola nanu oyo eza na lisu na yo
Avant d'enlever les crottes des yeux de d'un ami, enlève déjà ceux qui sont dans tes yeux.
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies