FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

to
to
ou
item 19 exemples (bandakisa zómi na libwá) ...
Ozali mobali to mwasi ?
Es-tu un garçon ou une fille ?
Osuka to ozali na kelasi nini ? - Nasilisa kelasi ya ebandeli te.
Tu as terminé ou tu es dans quel niveau d'étude ? - Je n'ai pas fini l'école primaire.
lolenge moto akoki kokaba to kozua VIH
la manière que quelqu'un peut transmettre ou attrapper le VIH.
manguele mpe kisi ezali te po na kobatela moto azua VIH to bokono ya SIDA te.
Il n'y a pas de vaccin, ni de médicament pour protéger quelqu'un d'attraper le VIH ou la maladie du SIDA.
Soki nzoto to poso ya moto ekutani na ya moto mosusu, tina ya kobanga ezali te.
Si le corps ou la peau d'une personne se touche avec celle d'une autre personne, il n'y a pas de raison d'avoir peur.
kombo ya mboka to kombo ya ndaku ?
Le nom (de famille, village, tribue) ou le prénom (comme on t'apelle à la maison) ?
eza muana muasi to mobali ?
Est-ce que c'est une fille ou un garçon ?
mwasi ya mabele etelema to mwasi ya mabele ekweya ?
Une fille avec les seins debout ou une fille avec les seins tombés ? (comme avant ou après la grossesse)
Soki insekte neti nzinzi, ngungi to nzoyi esui yo, tina ya kobanga ezali te.
Si un unsecte comme une mouche, une moustique ou une abeille te pique, il n'y a pas de raison d'avoir peur.
ozosakana na ngai to nini ?
Tu es en train de jouer avec moi ou quoi ?
longa 1500$ ya kelasi to pe mbula mobimba ya miliki NIDO.
Gagne 1500$ pour l'école ou une année entière de lait NIDO.
po na kozwa bis okoki kosomba tiké po na mokolo moko, sanza moko to mbula mobimba.
Pour prendre le bus, tu peux acheter un billet pour un jour, un mois ou toute une année.
libala ( ya ) bosembo to libala ( ya ) bosoto
le mariage sincère ou le mariage de n'importe quoi
Nasala nini soki papa to mama amelaka bangi to alangwaka masanga
Que je fasse quoi si papa ou maman fume de l'herbe ou s'enivre de bièrre ?
kosakana te na ngai to nakobeta yo
Ne blaguez pas avec moi ou je vais te taper.
kolumba monoko solo eza maladi to te ?
Puer du bec est une maladie ou pas ?
olingi kolembola ye makolo to nini
Tu veux lui lécher les pieds ou quoi ?
oza na posa ya koboya yango to oza na posa ya kondima ?
Tu as envie de réfuser de faire ça ou tu as envie d’accepter ?
abula eza nyama ya nzamba to esobe.
Le babouin est un animal de la forêt ou de la savane.
to
vous devriez connecter le préfix au verbe / nom
par exemple : nalingi, kotanga, bazali, bandeko, nakozonga,...
pas "nako zonga" ou "nazo zela"

to- préfix de conjugaison

première personne pluriel

nous
tags :
item Article : pronoms
pronoms
Singulier
1 moi ngai
2 toi yo
3 lui (ça) ye (yango)
Pluriel
1 nous biso
2 vous bino
3 eux (ces choses) bango (yango)

conjugaison
Singulier
1 je namoni je vois
2 tu olingi tu aimes
3 il / elle alingi il / elle aime
Pluriel
1 nous tolingi nous aimons
2 vous bolingi vous aimez
3 ils / elles balingi ils / elles aiment
Objets (S & P)
3 ca etali (yo) ca (te) regarde
autres mots avec le tag 'pronom' : ba, bangó, bínó, bísó, bo, e, ngai, o, yangó, ye, yo, to, na, nango
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies