FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

nani
náni, pl. banani (classe 1a/2 : - / ba-)
qui ?
Kimbanseke: nani abomi ndeko tailleur ?
Kimbanseke: nani abomi ndeko tailleur ?
src : MolièreTV
item 21 exemples (bandakisa ntúkú míbalé na mókó) ...
Kombo na yo nani ? - Kombo na ngai Niclette.
C'est quoi ton nom ? Mon nom est Niclette.
soki mpe nani
n'importe qui
kati ya tata na mama na yo, nani asalaka ?
Entre ton papa et ta maman, qui travaille ?
mama na bino, kombo na ye nani ?
Votre maman, c'est quoi son nom ?
nani wana ?
Qui est là ?
elengi na mbeto: Muasi ya monene na muasi ya moke, nani azali sukali ? © kitokolile
plaisir au lit: Une grosse fille et une fille mince, qui est bonne ?
Ozosolola na nani ?
Tu es en train de discuter avec qui ?
nzambe asambelaka te. akosambela nani Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
Dieu ne prie pas. Qui va-t-il prier ?
na liboso aza nani ?
devant, c'est qui ?
nani mutu akomeli yo lingala ?
C'est qui qui t'écrit du lingala ?
nani akoti na ezibeli ya niaou ?
Qui entre par la porte du chat ?
kokoko ! - Nani wana ? - Nga Lauretta. - Ah, yo wana ? - Ee.
tok tok ! - Qui est là ? C'est moi, Lauretta. - Ah, c'est toi ? - Oui.
nani alobi nazali kobela makasi ?
Qui a dit que j'étais très malade ?
nani alie biloko na ngai oyo natikaki ?
Qui a mangé ma nourriture que j'avais laissé ?
nani alambi damage oyo
Qui a préparé ce repas ?
nani azoluka ngai lisusu ?
Qui me cherche encore ?
oyo, ezali eloko ya nani ?
ça, c'est la chose de qui ?
yebisa ngai esika olalaki pe na nani.
Fais-moi savoir où tu as dormi et avec qui.
mobali na yo ya sika, kombo na ye nani ?
Ton nouveau mari s’appelle comment ?
Osombi mutuka na mbongo ya nani ?
Tu as acheté la voiture avec l’argent de qui ?
nani asali foti
qui a fait une faute ?
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies