FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

elamba
elamba, forme d'un verbe
kolámba, construction régulière (racine : lamb) (classe 15 : ko- (verbes))
préparer (à manger), cuisiner
dérivés : elámbo, molámbi
item 16 exemples (bandakisa zómi na motóbá) ...
biloko olambaki ezali elengi mingi
Les choses que tu as préparé sont très délicieuses.
Fumbwa elambami na mafuta ya nguba.
Fumbwa est préparé avec de l'huile d'arachide
oooh, solo kitoko. mama azolamba ntaba
oooh, ça sent bon. Maman est en train de préparer de la chèvre.
Bazali kobatela mino malamu te, mosusu esila ngala mpe mosusu balambi yango na ndenge elongobani te.
On ne conserve pas bien les médicaments, d'autres sont expirés et d'autres sont préparés des façons non conformes.
buka lelo lamba lelo Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
lit: recolte aujourd'hui, prépare aujourd'hui. (fig: draguer aujourd'hui, coucher ensemble aujourd'hui)
nalambi madesu.
j'ai préparé des haricots.
hum... solo kitoko na makusa. mama azolamba nini ?
mmh... ça sent bon dans la cuisine. Qu'est-ce que maman est en train de préparer ?
oza kolamba biloko nini lelo ?
Tu prépares quoi aujourd'hui ?
kolamba madesu te. lamba ndunda
Ne prépares pas des haricots. Prépare les légumes.
maman azolamba supu moko ya kitoko
Maman est en train de préparer une bonne soupe.
nani alambi damage oyo
Qui a préparé ce repas ?
lambela ngai mwa ndambu ya ndunda
Prépare-moi une petite portion de légume.
Nazolamba loso pona tolia.
Je suis en train de cuisiner du riz pour qu’on mange.
Yaka kosunga ngai, naza na biloko ebele ya kolamba.
Viens m'aider, j'ai beaucoup de choses à préparer.
Mama na ngai nde alakisa ngai kolamba.
C’est ma mère qui m’a appris à cuisiner.
ozalaki kozela ngai naya pona obanda kolamba ?
Tu attendais que j’arrive pour que tu commences à cuisiner ?
elamba, pl. bilamba (classe 7/8 : e- / bi-)
costume, habit, vêtement
étoffe, pagne
tags :
item 26 exemples (bandakisa ntúkú míbalé na motóbá) ...
longola bilamba.
enlève les vêtements
Namonaki ye. Alataki elamba te.
Je l'ai vu. Elle ne portait pas de vêtements.
Bilamba na ngai nanu ekauki te.
Mes vêtements ne sont pas encore séchés.
elamba ya mesa
nappe de table
soki nalongoli bilamba okozua vertige na okokweya
Si j'enlève les vêtements, tu vas attraper le vertige et tu vas tomber.
osopeli ngai supu na bilamba
Tu m'as versé de la soupe sur les habits.
ekausi bilamba. ekausi nsuki
séchoir (sèche-linge). sèche-cheveux.
basi ya minene balongoli bilamba na wenze ya bandal
des grosses filles enlèvent les vêtements au marché de Bandal
elamba ya mbeto
drap de lit
nasepeli makasi na elamba oyo okabeli ngai
J'ai beaucoup apprécié cet habit que tu m'as offert.
elamba oyo kitoko makasi. posa ya kosomba yango.
Cet habit est très joli. Envie de l'acheter.
tata naza na posa ya mbongo po nasomba bilamba
Papa, j'ai besoin d'argent pour acheter des vêtements.
moyibi moko ayibi ngai elamba na ngai.
Il y a un voleur qui m'a volé mon habit.
kolata bilamba na ngai lelo te. lata ya yo.
Ne porte pas mes vêtements aujourd'hui. Porte les tiens.
bolakisi bilamba na bino te
Vous n'avez pas montré vos vêtements.
oza kotumba bilamba pona nini ?
Pourquoi tu es en train de brûler les vêtements ?
pesa ngai falanga nasomba bilamba
Donne-moi de l'argent que j'achète des vêtements.
nake kokamola bilamba
Je vais tordre le linge.
alati bilamba ya pembe na ya mwindu
Elle a mis des vêtements noirs et blancs.
oyo ezali bilamba ya ndeko na ngai
ça c'est les vêtements de ma soeur.
bilamba yango eza talo penza.
Ces vêtements sont vraiment cher.
keba akosumba na bilamba.
Attention ! Il va faire caca dans les vêtements.
etiele ya bilamba
porte manteaux
nake kotanda bilamba libanda
je vais étaler les vêtements dehors
mwasi oyo atongelaka yo bilamba ayaki awa.
La dame qui faisais des vêtements pour toi (ta couturière) est passée ici.
bilamba na ye ezali na solo ya mapeka.
Ses vêtements ont l'odeur des aisselles.
autres mots avec le tag 'vetements' : abakósi, efungatúmbu, ekótó, sangatúmbu, ekoti, elamba, eláto, enkoti, etóbo, kupé, lipápa, lipúta, mudinda, nzámbálá, sapatu, lisangatúmbu, lópu, soséti, kitendi, lingwánda, dongi, etendi, kaleso, kazáka, libaya, modinda, mokaba, musualu, pantalo, somisi, semísi, pantalon, mbati, kanga-libumu, módénde, mukadi, kangalibumu, kangamabéle, modega, makaku
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies